[1] Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.
[2] Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka ; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.
[3] Moto oyo alingaka bwanya asalaka esengo ya tata na ye, kasi moto oyo alandaka basi ya ndumba akosilisa bomengo na ye nyonso.
[4] Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.
[5] Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.
[6] Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo, kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.
[7] Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.
[8] Batioli batiaka mobulu kati na engumba, kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.
[9] Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma, ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.
[10] Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.
[11] Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
[12] Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.
[13] Mobola mpe monyokoli bazali na likambo moko ya lisanga : Yawe angengisaka miso ya bango mibale.
[14] Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.
[15] Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
[16] Soki bato mabe bakomi ebele, mabe mpe ekomaka ebele ; kasi bato ya sembo bakomona bango kokweya.
[17] Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
[18] Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko !
[19] Bapamelaka mosali na maloba te ; pamba te akososola, kasi akoyoka te.
[20] Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
[21] Moto oyo alengelaka mosali na ye wuta bolenge akosuka na kokomisa ye moto makasi.
[22] Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
[23] Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.
[24] Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka ; ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.
[25] Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
[26] Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi, nzokande ezali Yawe nde apesaka oyo ekoki na moto na moto.
[27] Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu, mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.