Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:45

[1] Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.

[2] Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ; bobwaka mateya na ngai te.

[3] Ngai mpe nazalaki mwana malamu na miso ya tata na ngai, boye mama na ngai alingaki ngai makasi lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.

[4] Tata na ngai azalaki koteya mpe koloba na ngai boye : « Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai, bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,

[5] zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,

[6] kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo, linga yango mpe ekobomba yo.

[7] Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.

[8] Simba yango makasi, mpe ekotombola yo ; yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.

[9] Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto, ekopesa yo motole ya nkembo. »

[10] Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.

[11] Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya, nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.

[12] Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola ; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.

[13] Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.

[14] Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.

[15] Longwa kati na bango, kolekela wana te, kosala mpe maseki kuna te, kasi kende na yo na nzela mosusu.

[16] Pamba te balalaka pongi te soki basali nanu moto mabe te, mpe pongi ekimaka bango soki babomi moto te ;

[17] baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.

[18] Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.

[19] Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.

[20] Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai, pesa litoyi na yo na mateya na ngai.

[21] Tika ete ezala te mosika ya miso na yo ! Batela yango malamu kati na motema na yo,

[22] pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango, mpe epesaka nzoto kolongono.

[23] Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.

[24] Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.

[25] Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.

[26] Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.

[27] Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.

Masese — Chapters