[1] Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,
[2] omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
[3] Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
[4] kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ;
[5] mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.
[6] Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
[7] Yango ezalaka na mokambi te, mokengeli te to mokonzi te ;
[8] ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi, ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.
[9] Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?
[10] Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala
[11] mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
[12] Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe :
[13] Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi ;
[14] azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.
[15] Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.
[16] Yawe ayinaka makambo wana motoba ; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye :
[17] Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,
[18] motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,
[19] motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
[20] Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
[21] Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo.
[22] Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
[23] Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
[24] mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.
[25] Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.
[26] Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.
[27] Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te ?
[28] Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te ?
[29] Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.
[30] Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia.
[31] Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.
[32] Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;
[33] akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ; bongo soni na ye ekosila te.
[34] Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe ;
[35] akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.