Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:11

[1] Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ?

[2] Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana,

[3] azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba :

[4] « Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato !

[5] Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele !

[6] Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo.

[7] Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe.

[8] Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe ;

[9] nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.

[10] Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto,

[11] pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.

[12] Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.

[13] Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.

[14] Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.

[15] Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo ;

[16] ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka.

[17] Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.

[18] Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai.

[19] Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.

[20] Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,

[21] mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.

[22] Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala ;

[23] aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te.

[24] Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,

[25] liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango,

[26] tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili.

[27] Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,

[28] tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,

[29] tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;

[30] nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye ;

[31] nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato.

[32] Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !

[33] Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te !

[34] Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai !

[35] Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.

[36] Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »

Masese — Chapters