[1] Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
[2] Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.
[3] Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
[4] Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
[5] Moto ya sembo ayinaka maloba ya lokuta, kasi moto mabe amiyinisaka mpe apanzaka soni.
[6] Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.
[7] Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.
[8] Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te.
[9] Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.
[10] Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.
[11] Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.
[12] Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.
[13] Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.
[14] Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
[15] Boyebi ememelaka bato ngolu, kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi.
[16] Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.
[17] Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.
[18] Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
[19] Posa oyo ekokisami esalaka esengo na motema, kasi kokabwana na mabe ezali likambo ya nkele na miso ya zoba.
[20] Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
[21] Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.
[22] Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.
[23] Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo.
[24] Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
[25] Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.