Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:31

[1] Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.

[2] Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.

[3] Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele, ezalaka na nzete ya lolendo, kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.

[4] Esika oyo ezalaka na ngombe te, elielo mpe ezalaka na eloko te, pamba te ezali makasi ya bangombe nde epesaka bomengo.

[5] Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.

[6] Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.

[7] Zala mosika ya zoba, pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.

[8] Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele : lokuta.

[9] Bazoba balingaka te kosenga bolimbisi, kasi ngolu na Nzambe ezalaka kati na bato ya sembo.

[10] Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.

[11] Ndako ya moto mabe ekobukana, kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.

[12] Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.

[13] Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa, mpe esengo ekoki kosuka na mawa.

[14] Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.

[15] Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.

[16] Moto ya bwanya abangaka mabe mpe akimaka yango, kasi zoba atombokaka, na elikya nyonso.

[17] Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.

[18] Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula, kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.

[19] Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu, bato ya mitema mabe bakofukama na ekuke ya bato ya sembo.

[20] Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele.

[21] Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.

[22] Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.

[23] Mosala nyonso epesaka litomba, kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.

[24] Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma.

[25] Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.

[26] Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.

[27] Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.

[28] Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.

[29] Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.

[30] Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.

[31] Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.

[32] Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.

[33] Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli ; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba ?

[34] Bosembo etombolaka ekolo, kasi lisumu ememelaka bato soni.

[35] Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya, kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.

Masese — Chapters