[1] Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.
[2] Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
[3] Na miso na Yawe, kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya koleka bambeka ya kotumba.
[4] Miso ya lofundu, motema ya lolendo mpe kongenga ya bato mabe ezali masumu.
[5] Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.
[6] Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.
[7] Makambo ya bato mabe ebebisaka bango moko, pamba te baboyaka kosala makambo ya sembo.
[8] Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku, kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.
[9] Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
[10] Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ; ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.
[11] Tango bapesaka motioli etumbu, zoba akomaka moto ya bwanya ; mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya, azwaka solo boyebi.
[12] Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe, mpe akweyisaka bango kati na pasi.
[13] Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.
[14] Likabo oyo bapesi na nkuku ekitisaka kanda, mpe kado oyo batie na tolo ekitisaka kanda makasi.
[15] Ezali esengo mpo na moyengebene kosambisa makambo na sembo, kasi yango ezali pasi makasi mpo na bato oyo basalaka mabe.
[16] Moto oyo abungi nzela ya bwanya akovanda kati na lisanga ya bakufi.
[17] Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola ; moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafuta akotikala kokoma mozwi te.
[18] Moto mabe azalaka lokola motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya sembo ; moto ya sembo te azalaka lokola motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya alima.
[19] Kovanda kati na esobe ezali malamu koleka kovanda esika moko na mwasi oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
[20] Bilei ya kitoko mpe mafuta ezalaka kati na ndako ya moto ya bwanya, kasi moto oyo azangi mayele abebisaka yango.
[21] Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
[22] Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi, mpe akweyisaka bandako ya makasi oyo bato batielaka mitema.
[23] Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.
[24] Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. » Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.
[25] Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.
[26] Mokolo mobimba, akufaka na ye kaka na baposa makasi ; kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.
[27] Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.
[28] Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.
[29] Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.
[30] Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.
[31] Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba, kasi elonga ewutaka na Yawe.