Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:15

[1] Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.

[2] Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.

[3] Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.

[4] Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?

[5] Pamela oyo epesami na polele ezali malamu koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.

[6] Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.

[7] Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.

[8] Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga mosika ya zala na yango.

[9] Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.

[10] Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.

[11] Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.

[12] Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.

[13] Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.

[14] Soki moto moko ayei kopambola molingami na ye, na mongongo makasi mpe na tongo-tongo, bakozwa yango lokola elakeli mabe.

[15] Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.

[16] Kokanga ye ezali lokola koluka kokanga mopepe to mafuta na loboko.

[17] Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu, ndenge wana mpe moto abongaka soki akutani na moto mosusu.

[18] Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi aliaka mpe mbuma na yango, mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.

[19] Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi, ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.

[20] Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te.

[21] Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi bamekaka moto na nzela ya lokumu na ye.

[22] Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.

[23] Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,

[24] pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela.

[25] Soki bakati matiti ya bibwele, matiti ya sika ekobota mpe bakolokota matiti ya bangomba ;

[26] bameme ekopesa yo bilamba, mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga.

[27] Okozala na miliki ebele ya bantaba mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi.

Masese — Chapters