[1] Tala maloba ya Aguri, mwana mobali ya Yake. Ezali ye nde alobaki yango epai ya Itieli, epai ya Itieli mpe Ukali :
[2] Solo, nazali zoba koleka bato nyonso, nazali ata na mayele ya bomoto te ;
[3] nayekolaki bwanya te, mpe nazali na boyebi ya Mosantu te.
[4] Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !
[5] Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.
[6] Kobakisa eloko moko te na maloba na Ye, noki te apamela yo mpe abimisa yo mokosi.
[7] Oh Yawe, nasengi Yo biloko mibale, kopimela ngai yango te liboso ete nakufa :
[8] longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai,
[9] pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
[10] Kotonga mowumbu te liboso ya nkolo na ye, noki te alakela yo mabe, mpe omona pasi.
[11] Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.
[12] Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.
[13] Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.
[14] Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.
[15] Sonzo ezalaka na bana basi mibale, egangaka kaka : « Pesa ! Pesa ! » Ezali na biloko misato oyo etondaka te, minei oyo elobaka te : « Ekoki ! »
[16] Mboka ya bakufi, libumu ya mwasi oyo abotaka te, mabele oyo etondaka mayi te, mpe moto oyo elobaka te : « Ekoki ! »
[17] Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.
[18] Ezali na biloko misato oyo nasosolaka te, ata kutu minei oyo nayebaka te :
[19] Nzela ya mpongo na likolo, nzela ya nyoka na likolo ya libanga, nzela ya masuwa kati na ebale, mpe nzela ya elenge mobali epai ya elenge mwasi.
[20] Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka : Soki alie, apangusaka monoko ; mpe na sima, akoloba : « Nasali na ngai mabe te ! »
[21] Ezali na makambo misato oyo eningisaka mokili, ata kutu minei oyo mokili ekokaka kondima te :
[22] Mowumbu oyo akomi mokonzi, zoba oyo atondi na bomengo,
[23] mwasi oyo balingaka te, kasi abali ; mpe mwasi mosali oyo azwi bomengo ya nkolo na ye ya mwasi.
[24] Ezali na banyama mike minei na mokili, oyo, nzokande, ezalaka na bwanya mingi :
[25] Bafurmi : ezali bikelamu oyo ezanga makasi, kasi ebongisaka bilei na yango na tango ya elanga ;
[26] bampanya ya zamba : ezali bikelamu oyo ezanga nguya, kasi etongaka bandako na yango kati na mabanga ;
[27] mabanki : ezalaka na mokonzi te, kasi nyonso etambolaka nzela moko na molongo ;
[28] moselekete : loboko ekoki kokanga yango, kasi ezalaka kati na bandako ya bakonzi.
[29] Ezali na banyama misato oyo etambolaka malamu, ata kutu minei oyo edendaka soki ezali kotambola :
[30] Nkosi : nyama ya makasi kati na banyama, ezongaka sima te ata liboso ya nani ;
[31] soso ya mobali, ntaba mobali, mpe mokonzi oyo azali kotambola liboso ya mampinga na ye.
[32] Soki osali bozoba mpo na komikumisa, mpe soki ozali na makanisi mabe, tia loboko na monoko na yo,
[33] pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka, kobeta zolo ebimisaka makila, mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.