[1] Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge, mpe mvula enokaka te na tango ya elanga, ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.
[2] Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.
[3] Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda, mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane, ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.
[4] Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye, noki te okokokana na ye.
[5] Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.
[6] Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba azali lokola moto oyo amikati makolo mpe amilukeli makambo.
[7] Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te, ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te kati na monoko ya zoba.
[8] Kopesa zoba lokumu ezali lokola kotia libanga na ebambelo mabanga.
[9] Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzube kati na loboko ya moto oyo alangwe masanga.
[10] Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.
[11] Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
[12] Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
[13] Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela ! Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! »
[14] Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.
[15] Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko.
[16] Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya koleka bato sambo ya mayele.
[17] Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.
[18] Ndenge moto ya liboma abwakaka moto, makonga mpe kufa,
[19] ndenge wana mpe moto oyo akosi moninga na ye alobaka : « Ezalaki kaka mpo na kosala maseki ! »
[20] Soki bakoni ezali te, moto ekokufa ; soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita.
[21] Ndenge makala engalaka na mbabola, mpe bakoni epelisaka moto, ndenge wana mpe moto oyo alinga koswana ayeisaka matata.
[22] Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
[23] Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli na mbeki basala na mabele.
[24] Moto oyo ayinaka moninga na ye amibombaka na maloba na ye, kasi atondi na lokuta kati na motema na ye.
[25] Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te, pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama kati na motema na ye.
[26] Akoki solo kobomba makanisi na ye ya mabe na maloba ya lokuta, kasi motema mabe na ye ekosuka se na koyebana na miso ya bato nyonso.
[27] Moto oyo atimolaka libulu akweyaka ye moko kati na yango ; mpe moto oyo atindikaka libanga, libanga yango ekozongela kaka ye moko.
[28] Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi, mpe maloba ya sukali ememaka libebi.