Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:13

[1] Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,

[2] pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.

[3] Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele.

[4] Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi.

[5] Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye.

[6] Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.

[7] Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba, yango wana azalaka te na likambo ya koloba kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.

[8] Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.

[9] Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.

[10] Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.

[11] Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa, mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa lokola bato oyo balangwe masanga.

[12] Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?

[13] Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko ! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.

[14] Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi mpo na molimo na yo ; soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu, mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.

[15] Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo kati na ndako ya moto ya sembo, mpe komeka te kopanza yango,

[16] pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka ; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.

[17] Soki monguna na yo akweyi, kosepela te ; mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te ;

[18] noki te Yawe akomona, akosepela te mpe akokitisela yo kanda na Ye.

[19] Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe, kolula te bato mabe ;

[20] pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.

[21] Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi, kosanganaka te na batomboki,

[22] pamba te bango mibale bakoki kotindela batomboki pasi na pwasa. Bongo, nani ayebi pasi oyo bakoki kotinda ?

[23] Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.

[24] Moto oyo alobaka na moto mabe : « Ozali moto ya sembo, » bato bakolakela ye mabe, mpe bikolo ekotombokela ye.

[25] Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamu mpe lipamboli ekozala likolo na bango.

[26] Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.

[27] Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.

[28] Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?

[29] Kolobaka te : « Nakosala ye ndenge asali ngai, nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »

[30] Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele ;

[31] bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.

[32] Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo :

[33] mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,

[34] bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.

Masese — Chapters