Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:28

[1] Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;

[2] soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;

[3] soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli ;

[4] soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,

[5] okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.

[6] Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.

[7] Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.

[8] Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.

[9] Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo : nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.

[10] Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.

[11] Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo

[12] mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,

[13] na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,

[14] na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,

[15] na bato oyo nzela na bango etengama-tengama mpe etamboli na bango etonda na mobulu.

[16] Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,

[17] oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye ;

[18] pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.

[19] Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.

[20] Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.

[21] Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ;

[22] kasi bato mabe bakokufa na mokili mpe bakolongola bango kati na mokili ya bato ya songisongi.

Masese — Chapters