Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:11

[1] Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;

[2] pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi, ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo mpe ekomemela yo kimia.

[3] Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !

[4] Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.

[5] Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo.

[6] Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

[7] Tika ete omimonaka te moto ya bwanya na miso na yo moko ; tosa Yawe mpe longwa na mabe.

[8] Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono mpe kolendisa mikuwa na yo.

[9] Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.

[10] Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko, mpe bambeki na yo ekotonda na vino.

[11] Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye ;

[12] pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.

[13] Esengo na moto oyo amoni bwanya ! Esengo na moto oyo azwi mayele !

[14] Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya.

[15] Ezali na motuya koleka babiju, mpe eloko moko te oyo moto akoki koluka ekokani na yango.

[16] Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.

[17] Nzela na Ye ezali ya esengo, mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia.

[18] Bwanya ezali nzete ya bomoi mpo na bato oyo basimbaka yango ; bato oyo bakokanga yango makasi bakozala na esengo.

[19] Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.

[20] Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula.

[21] Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te ; batela yango malamu,

[22] pamba te ekozala bomoi mpo na yo mpe ngolu mpo na kingo na yo.

[23] Boye, okotambola na kimia na nzela na yo, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.

[24] Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.

[25] Somo ya pwasa ekobangisa yo te, ezala tango bato mabe bakobimela yo na pwasa ;

[26] pamba te Yawe akozala elikya na yo mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.

[27] Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto oyo azali na bosenga, tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.

[28] Kolobaka na moninga na yo te : « Kende, bongo oya sima ; nakopesa yo yango lobi ; » soki ozali na makoki ya kosala likambo yango.

[29] Kosalaka moninga na yo mabe te soki azali kovanda na kimia epai na yo.

[30] Kolukelaka moto makambo te, oyo ezanga tina soki asali yo mabe te.

[31] Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.

[32] Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.

[33] Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe, kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;

[34] asambwisaka batioli, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka.

[35] Bato ya bwanya bakozwa nkembo, kasi bazoba bakozala na soni.

Masese — Chapters