[1] Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo ;
[2] abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino mpe, na sima, atandi mesa.
[3] Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba :
[4] « Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa ! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli :
[5] « Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli,
[6] botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »
[7] Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.
[8] Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.
[9] Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.
[10] Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.
[11] Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
[12] Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko ; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.
[13] Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,
[14] avandaka na ekuke ya ndako na ye, atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba,
[15] mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.
[16] Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa ! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli :
[17] « Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »
[18] Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.