[1] Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi, tala malamu moto oyo azali liboso na yo.
[2] Tia mbeli na mongongo na yo soki ozalaka lokoso.
[3] Kolula te bilei na ye ya kitoko, pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo.
[4] Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango.
[5] Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.
[6] Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe mpe kolula te bilei na ye ya kitoko,
[7] pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka : « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.
[8] Okosanza eteni oyo oliaki, mpe maloba na yo ya kitoko ekokende pamba.
[9] Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.
[10] Kozongisa te na sima mondelo ya kala mpe kokota te na bilanga ya bana bitike,
[11] pamba te Molobeli na bango azalaka makasi, akozwa makambo na bango na maboko mpo na kotelemela yo.
[12] Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko, mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi !
[13] Kozangisa te kopesa mwana etumbu ; soki obeti ye fimbu, akokufa te.
[14] Na kobeta ye fimbu, okokangola molimo na ye na lifelo.
[15] Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekozala na esengo.
[16] Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo, soki bibebu na yo elobi makambo ya sembo.
[17] Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;
[18] pamba te suka na yo ekozala solo malamu mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
[19] Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo.
[20] Kozala esika moko te na balangwi masanga to na bato ya lokoso,
[21] pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola, mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka.
[22] Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
[23] Luka bosolo, kasi koteka yango te ; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.
[24] Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi, mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
[25] Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela ! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo !
[26] Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !
[27] Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene, mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo.
[28] Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi mpe akomisaka mibali bazoba koleka.
[29] Mpo na nani : « Ah ngai, mawa ! » Mpo na nani : « Eh ! » Mpo na nani koswanaswana ? Mpo na nani kolelalela ? Mpo na nani kowelana ezanga tina ? Mpo na nani kotelisa miso ?
[30] Mpo na bato oyo bawumelaka liboso ya masanga ya vino, mpo na bato oyo bamelaka masanga ya makasi.
[31] Kotalaka te masanga ya vino tango ezali motane, tango ezali kongala kati na kopo mpe kokita na pete na mongongo.
[32] Na suka na yango, ekoswa yo lokola nyoka mpe ekotia yo minu lokola etupa.
[33] Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.
[34] Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene, mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi.
[35] Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te ! Tango nini nakolamuka ? Nakozongela lisusu komela vino. »