[1] Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.
[2] Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe epesaka litomba te, kasi bosembo ekangolaka na kufa.
[3] Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala, kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa.
[4] Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.
[5] Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.
[6] Mapamboli ezali na likolo ya moto ya moto ya sembo lokola motole, kasi monoko ya moto mabe ebombaka bitumba.
[7] Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.
[8] Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.
[9] Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.
[10] Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu, kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia.
[11] Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
[12] Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
[13] Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya, kasi fimbu ezali malamu mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele.
[14] Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
[15] Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.
[16] Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi, kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu.
[17] Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi, kasi moto oyo ayokaka pamela te apengwisaka bato mosusu.
[18] Moto oyo abombaka koyina kati na motema na ye azali na bibebu ya lokuta, mpe moto oyo atongaka bato azali zoba.
[19] Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
[20] Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te.
[21] Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele, kasi zoba akokufa na bozoba na ye.
[22] Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.
[23] Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele.
[24] Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.
[25] Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela.
[26] Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi, mpe molinga esalaka miso pasi, ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka epai ya bato oyo batindaka ye pasi.
[27] Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.
[28] Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.
[29] Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.
[30] Moto ya sembo akotikala kokweya te, kasi bato mabe bakovanda na mokili te.
[31] Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya, kasi lolemo ya lokuta ekokatama.
[32] Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.