Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:55

[1] Mokolo ya Kopema esili, na tongotongo, basi bakei na simetiere; bamemi malasi oyo babongisaki.

[2] Bamoni 'tè libanga oyo bazipelaki libulu elongwe.

[3] Bakoti, kasi bamoni nzoto ya Mokonzi Yezu té.

[4] Bazalaki lisusu na mayele ya koloba té po na makambo oyo, bongo kaka na tango wana bato mibale batelemi penepene na bango, balati bilamba ezali kongenga.

[5] Lokola basi yango bazalaki kobanga pe bakitisi bilongi na se, bato wana balobi na bango: “Po na nini bozali koluka na kati ya bato bakufá moto oyo azali na bomoi?

[6] Azali awa té. Asi'asekwi! Bókanisa ndenge alobaki na bino. Tango azalaki nanu na Galilé,

[7] alobaki boye: ‘Esengeli bápesa Mwana ya Moto na maboko ya bato ya masumu; bakoboma ye na kuruze kasi akosekwa na mikolo misato.’”

[8] Bongo bakómi kokanisa maloba ya Yezu,

[9] balongwe na simetiere, pe bakei koloba makambo nyonso wana na bayekoli zomi na moko pe na baninga na bango nyonso.

[10] Ezalaki Maria ya mboka Magdala, Jane, Maria mama ya Jake, pe basi mosusu oyo bakendeki ná bango nzela moko. Bango nyonso balobaki na bantoma kaka ndenge moko.

[11] Kasi bantoma bakanisaki 'tè makambo basi balobaki ezalaki na tina té, yango wana bandimaki té.

[12] Nzokande Piere atelemi mbangu pe akimi na simetiere; agumbami na se kasi amoni bobele bilamba ya mike-mike ya pembe. Na sima azongi epai na ye, pe akamwe mingi po na makambo oyo elekaki.

[13] Kaka na mokolo yango bato mibale na kati na bango bakei na mboka moko, kombo Emaus. Kolongwa na Yeruzalem tii na Emaus basalaka ngonga mibale na nzela.

[14] Bazalaki kosolola makambo nyonso oyo elekaki.

[15] Awa bazalaki kosolola pe kotiana tembe, ye moko Yezu ayei penepene pe abandi kokende nzela moko ná bango.

[16] Kasi miso na bango ezipamaki, bayebaki ye té.

[17] Yezu atuni bango: “Likambo nini bozali kotiana tembe na nzela?” Bongo bango batelemi, batondaki na mawa.

[18] Moko na bango, kombo na ye Kleopas, azongisi: “Na kati ya bato nyonso ya Yeruzalem, bobele yo moto oyebi té makambo euti koleka na mikolo oyo?”

[19] Ye atuni bango: “Makambo nini?” Bango bazongiseli ye: “Makambo ekweelaki Yezu ya Nazaret. Ye azalaki profete moko ya makasi na miso ya Nzambe pe na miso ya bato nyonso, po na misala pe maloba na ye.

[20] Bakonzi ya banganga-Nzambe pe batambwisi na biso bakatelaki ye etumbu ya liwa, pe babomisaki ye na kuruze.

[21] Nzokande biso totiaki mitema 'tè ye moto akosilisa boumbu ya Israel. Lelo ekómi mikolo misato banda makambo wana elekaki.

[22] Ya solo, basi mosusu oyo bazalaki na biso bakamwisaki biso. Bakendeki na simetiere na tongo penza,

[23] kasi bamonaki nzoto na ye té. Bazongi pe balobeli biso 'tè bamonaki ba-anjelu oyo balobaki 'tè Yezu azali na bomoi.

[24] Baninga na biso mosusu bakendeki na simetiere pe bamonaki makambo nyonso ndenge basi balobelaki bango; kasi Yezu, bamonaki ye té.”

[25] Bongo Yezu alobi na bango: “A! Bino bato bozangá mayele! Makambo nyonso baprofete balobaká, bondimaka yango noki té!

[26] Boyebi té? Mesia asengelaki komona pasi ndenge wana po na kozwa lokumu na ye.”

[27] Na sima alimboleli bango makambo bakòmá likolo na ye na Mikanda ya Nzambe, kobanda na oyo ya Moize tii na oyo ya baprofete.

[28] Awa bakómi penepene ya Emaus, Yezu asali lokola azali kokende na mboka ya mosika.

[29] Kasi bango balobi na ye: “Kokende té. Lala awa na biso. Pokwa esi'ekómi, butu elingi éya.” Bongo ye akoti na ndako po na kolala epai na bango.

[30] Bongo afandi na mesa esika moko ná bango, akamati lipa apesi Nzambe mersi, akatikati yango pe akaboleli bango.

[31] Na mbala moko miso na bango efungwami pe bayei koyeba ye. Kasi alimwe na miso na bango.

[32] Bango babandi kotunana: “Tango azalaki kosolola na biso na nzela pe kolimbola makambo oyo ekòmamá na Mikanda ya Nzambe, totondaki na esengo té?”

[33] Kaka na tango wana batelemi pe bazongi na Yeruzalem; bakuti bayekoli zomi na moko basangani ná baninga na bango:

[34] Bato oyo bango bakutaki balobi: “Ya solo, Mokonzi asekwi; abimelaki Simon.”

[35] Bongo bayekoli mibale bayebisi bango makambo elekaki na nzela, pe ndenge nini bayebaki Yezu tango abandaki kokabolela bango mapa.

[36] Awa bazalaki kaka koloba makambo wana, ye moko Yezu ayei kotelema na kati na bango pe alobi: “Boboto ézala na bino.”

[37] Bango babangi pe bayoki somo, pamba té bakanisaki 'tè bamoni elima.

[38] Kasi Yezu alobi na bango: “Po na nini bozali mitema likolo? Pe po na nini bozali kotia tembe?

[39] Bótala maboko ná makolo na ngai; ezali ngai penza. Bósimba ngai pe bótala. Elima ezali na misuni té to mikuwa; kasi bomoni 'tè ngai nazali na yango.”

[40] Awa alobi boye alakisi bango maboko ná makolo.

[41] Bakokaki nanu kondima té, pamba té bazalaki kokamwa po na esengo. Yezu atuni bango: “Bozali na eloko ya kolia?”

[42] Bapesi ye ndambo ya mbisi ya kokalinga.

[43] Akamati yango pe alei na miso na bango.

[44] Na sima alobi na bango: “Bomoni? Tango nazalaki nanu na bino, nayebisaki bino boye: nyonso oyo ekòmamá po na ngai na Mibeko ya Moize, na mikanda ya baprofete, pe na banzembo, esengeli kosalama.”

[45] Bongo afungoli bango mitú po báyeba tina ya Mikanda ya Nzambe,

[46] alobi boye: “Ekòmamá 'tè bakonyokola Mesia pe bakoboma ye, kasi akosekwa na mikolo misato.

[47] Esengeli básakola sango na ye kobanda na Yeruzalem tii epai ya bikolo nyonso, po bato bábongola mitema pe bázwa bolimbisi ya masumu.

[48] Bino bomoni pe boyoki makambo oyo nyonso;

[49] bongo ngai nakotindela bino Molimo Mosantu ndenge Tata na ngai alakaki. Bófanda nanu na Yeruzalem, tii tango nguya ya Nzambe ekokitela bino.”

[50] Na sima Yezu amemi bango tii penepene ya Betanie. Atomboli maboko likolo pe abenisi bango.

[51] Awa azalaki kobenisa bango, akabwani na bango pe atombwani na Likolo.

[52] Bongo basambeli ye pe bazongi na Yeruzalem na esengo mingi.

[53] Mikolo nyonso bazalaki kokumisa Nzambe na kati ya Ndako ya Nzambe.

Luka — Chapters