[1] Yezu abeteli bayekoli na ye lisapo mosusu, alobi: “Moto moko ya mbongo azalaki na kapita; bongo bato bayei koyebisa ye 'tè: ‘Kapita na yo azali kobebisa biloko na yo.’
[2] Abengi ye pe alobi: ‘Makambo nini nayoki po na yo? Lakisa ngai ndenge ozalaki kosala mosala na yo; pamba té okoki lisusu kozala kapita té.’
[3] Kapita amilobi: ‘Mokonzi na ngai alongoli ngai na mosala, násala nini? Kosala bilanga, nakoka té. Pe kosengasenga, ezali soni mingi.
[4] A! Nayebi eloko nakosala. Nakosepelisa bato po bábanda koyamba ngai na bandako na bango, tango nakolongwa na mosala.’
[5] Bongo abengi bato nyonso oyo bazalaki na banyongo ya mokonzi na ye. Atuni na moto ya liboso boye: ‘Ozali na nyongo ya boni epai ya mokonzi na ngai?’
[6] Moto wana azongisi: ‘Batonó kama moko (100) ya mafuta.’ Kapita alobi na ye: ‘Kamata mokanda ya nyongo, fanda noki pe kòma: batonó tuku mitano (50).’
[7] Atuni na mosusu: ‘Yo ozali na nyongo ya boni?’ Ye azongisi: ‘Basaki 500 ya blé.’ Kapita alobi na ye: ‘Kamata mokanda ya nyongo pe kòma: basaki 400.’”
[8] Mokonzi akumisi kapita wana ya mabe po na mayele na ye, alobi: “Bato oyo balukaka bomengo ya mokili basalaka makambo na bango na mayele; baleki kutu baoyo balukaka kotambola na moi.
[9] Yezu abakisi, ngai nalobi na bino: mbongo ekosaka bato mingi. Kasi bino bósalelaka yango po na kozwa baninga; boye tango makambo ya mbongo ekosila, bango bakoyamba bino na mboka ya seko.
[10] Moto oyo bakoki kotiela ye motema na makambo ya mike, bakoki pe kotiela ye motema na makambo ya minene. Moto oyo bakoki kotiela ye motema té na makambo ya mike, bakoki pe kotiela ye motema té na makambo ya minene.
[11] Bongo soki bakoki kotiela bino motema té na mbongo oyo ekosaka bato, nani akopesa bino bomengo ya solo?
[12] Soki bakoki kotiela bino motema té na biloko ya bato mosusu, ndenge nini Nzambe akoki kopesa bino bomengo oyo abombeli bino?
[13] “Mosali moko té akoki kosalela bakonzi mibale. Soki azali koyina moko, akolinga mosusu; soki azali kotosa moko, akoboya mosusu. Bokoki kosalela Nzambe té soki bozali baumbu ya mbongo.”
[14] Ba-Farizé oyo bayokaki maloba wana bazalaki kolinga mbongo mingi; bongo babandi koseka Yezu.
[15] Yezu alobi na bango: “Bino bomilongisaka na miso ya bato 'tè bozali bato malamu, kasi Nzambe ayebi mitema na bino. Bóyeba 'tè makambo oyo bato bamonaka minene, Nzambe amonaka yango pamba.
[16] “Nzambe apesaká bato na ye Mibeko ya Moize pe batoli ya baprofete. Kasi kobanda eleko Yoane Mobatisi ayaki, bazali kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye; pe moto nyonso azali kosala makasi po ákóma moto ya bokonzi ya Nzambe.
[17] Ata soki Likolo ná se ekoki kolimwa, kasi bakoki kolongola eloko moko té na Mibeko, ézala ata mwa-letre moke.
[18] “Moto nyonso oyo atiki mwasi na ye pe abali mosusu, azali kosala kindumba. Pe moto abali mwasi oyo mobali mosusu atiki, azali kosala kindumba.”
[19] “Na mboka moko ezalaki na moto moko ya mbongo; ye azalaki kolata bilamba ya kitoko pe ya talo; mikolo nyonso azalaki kolia malamu lokola nde azali na feti.
[20] Pe moto moko ya kokelela azalaki kolala na porte ya ndako na ye, kombo na ye Lazare; nzoto na ye etondá na bapota.
[21] Azalaki kaka kozela mwa-ndambo ya biloko oyo moto ya mbongo atikaka. Ata kutu bambwa ezalaki koya kolembola bapota na ye.
[22] “Moto ya kokelela akufi, pe ba-anjelu bamemi ye na Likolo na esika ya lokumu, penepene ya Abraham. Moto ya mbongo ayei kokufa, bakundi ye;
[23] bongo azalaki komona pasi mingi na lifelo. Atali na likolo, amoni Abraham mosika, ná Lazare afandi penepene na ye.
[24] Abeleli ye: ‘Tata Abraham, yokela ngai mawa. Tinda Lazare átia songe ya mosapi na ye na mai, pe átangisela ngai yango na lolemo, pamba té nazali komona pasi mingi na móto oyo.’
[25] Abraham azongisi: ‘Mwana na ngai, kanisa 'tè ozwaká bomengo mingi tango ozalaki na bomoi, kasi Lazare azalaká komona kaka pasi. Sik'oyo mawa na ye esili, pe yo okómi komona pasi.
[26] Omoni kutu, libulu moko ya monene ezali na kati na biso ná bino. Yango wana, bato oyo balingi kolongwa awa po báya epai na bino bakoka té; pe moto moko té akoki kolongwa kuna po áya epai na biso.’
[27] Moto ya mbongo alobi: ‘Tata, soki bongo, nabondeli yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai,
[28] pamba té natiká bandeko mitano; ákende kokebisa bango po bango báya té na esika oyo ya pasi.’
[29] Kasi Abraham azongisi: ‘Bandeko na yo bayebi Mibeko ya Moize ná batoli ya baprofete; bátosa yango.’
[30] Moto ya mbongo alobi: ‘Té, tata Abraham. Wana ekoki té. Kasi soki moto moko oyo akufá akei epai na bango, bakobongola mitema.’
[31] Kasi Abraham azongiseli ye: ‘Soki balingi koyokela Moize té ná baprofete, bakondima pe té ata soki moto akufá asekwi.’”