Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 10:28

[1] Na sima Yezu akei na bavile pe na bamboka ya mike. Kuna azalaki koteya pe kosakola Sango Malamu ya bokonzi ya Nzambe. Bayekoli zomi na mibale bakei nzela moko ná ye,

[2] pe ná basi mosusu oyo Yezu abikisaki na milimo mabe pe na maladi. Ezalaki Maria (oyo babengaka ya mboka Magdala) oyo balongolaki milimo mabe sambo na nzoto,

[3] Jane, mwasi ya mbuta-muntu Kuza oyo azalaki kosala na biro ya bakalaka ya mokonzi Erode, Suzane ná basi mosusu ebele. Bango nyonso bazalaki kopesa biloko na bango po na kosalisa Yezu ná bayekoli na ye.

[4] Bato mingi bautaki na bamboka nyonso bayei kosangana penepene ya Yezu. Bongo ye abeteli bango lisapo oyo:

[5] “Moto moko akendeki kokona mbuma na elanga na ye. Tango azalaki kobwakabwaka mbuma, mbuma mosusu ekwei na nzela; bato banyati yango pe bandeke eyei kolia yango.

[6] Mbuma mosusu ekwei na mabanga. Tango mbuma ebimi ekauki, po mai ezalaki té.

[7] Mbuma mosusu ekwei na kati ya basende. Basende ekoli esika moko ná matiti ya malamu, bongo ebomi yango.

[8] Kasi mbuma mosusu ekwei na mabelé ya malamu, ekoli pe eboti bambuma kama na kama.” Sima ya koloba boye, Yezu abakisi: “Moto oyo azali na matoi, áyoka!”

[9] Bayekoli ya Yezu batuni tina ya lisapo oyo.

[10] Ye azongiseli bango: “Bino bokoki koyeba basekelé ya bokonzi ya Nzambe; kasi po na bato mosusu bazali koyoka makambo nyonso lokola masapo pamba. Ekòmamá boye: ‘Po bátala, kasi bámona té; báyoka, kasi báyeba té.’”

[11] “Tala ndimbola ya lisapo oyo: mbuma ezali maloba ya Nzambe.

[12] Bato mosusu bakokani ná nzela oyo mbuma ekwei: bayoki maloba ya Nzambe, kasi zabolo ayei kolongola yango na mitema na bango, po bándima té pe bábika té.

[13] Bato mosusu bakokani ná mabanga: bayoki maloba ya Nzambe pe bayambi yango na esengo, kasi yango ebimisi misisa té. Bandimi kaka po na mwa-tango moke, kasi batiki bondimi na bango na tango ya pasi.

[14] Mbuma oyo ekwei na kati ya basende, ezali lokola bato oyo bayoki maloba ya Nzambe, kasi balembi po na makanisi, bomengo pe bisengo ya mokili; pe mbuma yango eteli té.

[15] Mbuma oyo ekwei na mabelé ya malamu ezali lokola bato oyo bayoki maloba ya Nzambe pe babombi yango na mitema malamu penza; batiki bondimi na bango té, pe baboti mbuma.”

[16] “Moto moko té, soki apelisi mwinda, azipaka yango katini to abombaka yango na se ya mbeto. Kasi batiaka yango likolo ya mesa po bato oyo bazali kokota na ndako bámona malamu.

[17] Makambo nyonso oyo ebombaná ekomonana; pe makambo nyonso ya sekelé ekoyebana polele.

[18] “Bókeba na ndenge bozali koyoka; pamba té moto oyo azali na biloko mingi, bakopesa ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye ata mwa-ndambo oyo ye azali kotiela motema.”

[19] Mama ya Yezu ná bandeko ya Yezu bayei epai na ye; kasi bakokaki kokutana ná ye té po bato bazalaki mingi.

[20] Bato mosusu bayebisi Yezu boye: “Mama na yo ná bandeko na yo bazali na libanda pe balingi komona yo.”

[21] Kasi Yezu alobi na bango: “Mama na ngai ná bandeko na ngai ezali bato oyo bayokaka maloba ya Nzambe pe batosaka yango.”

[22] Mokolo moko Yezu akoti na bwatu ná bayekoli na ye, pe alobi na bango: “Tókatisa ngambo ya laki.” Bongo bakei.

[23] Tango bazalaki kokende, Yezu abandi kolala pongi. Na mbala moko mopepe ya makasi penza ebandi koleka na laki. Bwatu ezalaki kotonda na mai, pe etikalaki moke bádinda.

[24] Bayekoli bapusani penepene ya Yezu, balamusi ye pe balobi: “Moteyi, Moteyi, tolingi tókufa!” Yezu alamuki pe agangeli mopepe ná mbonge; yango elembi pe kimia ezongi.

[25] Bongo alobi na bayekoli: “Wapi bondimi na bino?” Kasi bango babangi mingi pe bakamwe penza, balobi: “Nani moto oyo? Azali kopesa mitindo ata na mopepe ná mai, pe yango ezali kotosa ye!”

[26] Bakómi na ngambo ya laki, na mabelé ya Gerazá oyo etalaná ná Galilé.

[27] Awa Yezu abimi na bwatu, moto moko ya mboka wana ayei liboso na ye. Moto yango azalaki na milimo ya mabe na nzoto. Banda kala azalaki kolata bilamba té; abandaki kofanda na ndako té, kasi azalaki kolala na simetiere.

[28] Awa amoni Yezu, agangi, afukameli ye pe alobi na mongongo makasi: “Yezu, Mwana ya Nzambe ya Likolo, biso na yo likambo nini? Nabondeli yo, kopesa ngai etumbu té.”

[29] Alobi boye, pamba té Yezu atindaki molimo mabe étika ye. Molimo wana ezalaki kosimba ye mbala mingi; bongo bazalaki kokanga ye maboko pe makolo na minyololo, kasi mbala na mbala abandaki kokata yango, pe molimo ezalaki komema ye na esobe.

[30] Bongo Yezu atuni moto yango: “Kombo na yo nani?” Ye azongisi: “Kombo na ngai Ebele.” Pamba té, ya solo, milimo mingi ya mabe ekotaki na nzoto na ye.

[31] Bongo milimo yango ebondeli Yezu, átinda yango na lifelo té.

[32] Bangulu ebele ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo wana ebondeli Yezu ápesa yango nzela ya kokende kokota na bangulu. Bongo Yezu apesi yango nzela ya kokota na bangulu.

[33] Na mbala moko milimo mabe ebimi na moto wana pe ekei kokota na bangulu. Bongo bangulu nyonso elongwe likolo ya ngomba; ekei kokweya na kati ya laki pe ekufi na mai.

[34] Tango bato oyo bazalaki kokengela bangulu bamoni makambo wana, bakimi pe bakei koyebisa sango na vile ya Gerazá pe na bamboka ya mike.

[35] Bongo bato babimi po na kotala makambo oyo elekaki. Bakómi epai ya Yezu, pe bakuti moto oyo milimo mabe etikaki, afandi liboso ya Yezu, alati bilamba, azongeli makanisi ya bomoto. Bongo bato nyonso babandi kobanga.

[36] Baoyo bamonaki makambo elekaki, balobeli bango ndenge moto oyo azalaki na milimo mabe abiki.

[37] Yango wana bato nyonso ya mabelé ya Gerazá basengi Yezu álongwa epai na bango. Pamba té babangaki mingi. Bongo Yezu akoti na bwatu pe azongi.

[38] Moto oyo milimo mabe etikaki abondeli Yezu po ákende nzela moko na ye. Kasi Yezu atiki ye pe alobi:

[39] “Zonga epai na yo, pe yebisa bato makambo nyonso Nzambe asali po na yo.” Bongo moto wana akei koyebisa na mboka mobimba makambo nyonso Yezu asalaki po na ye.

[40] Tango Yezu azongi na ngambo ya laki, bato mingi bayei koyamba ye po bango nyonso bazalaki kozela ye.

[41] Bongo moto moko ayei, kombo na ye Yair. Ye azalaki mokonzi ya ndako ya lisanga. Afukameli Yezu pe abondeli ye po ákende na ndako na ye.

[42] Pamba té mwana na ye se moko ya mwasi alingaki kokufa, azalaki na mbula penepene ya zomi na mibale. Tango Yezu azalaki kokende kuna, bato ebele babandi kosimbasimba ye.

[43] Mwasi moko atelemaki wana, azalaki na maladi ya kobima makila, esali mbula zomi na mibale. Abebisaki mbongo na ye nyonso epai ya baminganga; kasi ata moto moko té akokaki kobikisa ye.

[44] Ayei na sima ya Yezu pe asimbi ye na songe ya elamba. Na mbala moko makila etiki kotanga, maladi esili.

[45] Bongo Yezu atuni: “Nani asimbi ngai?” Bango nyonso bawangani, kasi Piere alobi: “Moteyi, ezali kaka bato oyo batie yo na kati-kati pe bazali kokangama na yo.”

[46] Kasi Yezu azongisi: “Moto moko asimbi ngai pe nayei koyeba 'tè nguya na ngai esali mosala.”

[47] Awa mwasi wana amoni 'tè balingi bázwa ye, abandi kolenga pe ayei kofukama liboso ya Yezu. Bongo ayebisi ye na miso ya bato nyonso tina asimbelaki ye, pe ndenge abikaki na mbala moko.

[48] Yezu alobi na ye: “Mwana na ngai, bondimi na yo ebikisi yo; kende malamu.”

[49] Awa Yezu azalaki koloba boye, moto moko auti na ndako ya Yair akómi wana. Alobi na Yair: “Mwana na yo asi'akufi. Kotungisa lisusu Moteyi té.”

[50] Kasi Yezu ayoki yango pe alobi na Yair: “Kobanga té! Tia kaka motema. Mwana na yo akobika.”

[51] Tango akómi na ndako, apesi nzela na moto moko té po ákota ná ye, bobele Piere, Yoane ná Jake pe tata ná mama ya Mwana.

[52] Bato nyonso bazalaki kolela mwana makasi penza. Bongo Yezu alobi: “Bótika kolela! Mwana akufi té, kasi alali pongi.”

[53] Bango babandi koseka ye po bayebaki 'tè mwana asi'akufi.

[54] Kasi Yezu asimbi ye na liboko pe alobi na mongongo makasi: “Mwana, telema!”

[55] Mwana wana azongi lisusu na bomoi, pe na mbala moko atelemi; bongo Yezu alobi na bango bápesa ye bilei.

[56] Baboti na ye bakamwe penza, kasi Yezu apekisi bango báloba na moto moko té makambo oyo elekaki.

Luka — Chapters