Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 10:26

[1] Feti ya mapa ya kovimba té ekómaki penepene; babengaka yango pe feti ya Koleka.

[2] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bakómi koluka nzela ya koboma Yezu, kasi bazalaki kobanga bato.

[3] Bongo Satan akoti na motema ya Yudas oyo babengaka Iskariot. Ye azalaki moko ya bayekoli zomi na mibale.

[4] Akei koyokana ná bakonzi ya banganga-Nzambe pe bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, po na ndenge ye akoki kotekela bango Yezu.

[5] Basepelaki mingi pe bayokani 'tè bakopesa ye mbongo.

[6] Yudas andimi pe abandi koluka nzela ya kotekela bango Yezu na ndenge 'tè bato báyeba té.

[7] Mokolo ya mapa ya kovimba té ekómi, yango ezalaki mokolo monene basengeli koboma bana-meme po na feti ya Koleka.

[8] Bongo Yezu atindi Piere ná Yoane pe alobi: “Bókende kobongisela biso bilei ya feti ya Koleka po tólia yango.”

[9] Bango batuni ye: “Olingi tókende kolamba yango epai wapi?”

[10] Ye alobi na bango: “Bóyoka, tango bokokota na vile, bokokutana ná moto moko amemi elokú ya mai; bólanda ye tii na ndako oyo ye akokota,

[11] pe bóloba na kolo ya ndako: ‘Moteyi atuni yo: wapi esika ngai nakoki kolia bilei ya feti ya Koleka ná bayekoli na ngai?’

[12] Bongo ye akolakisa bino esika moko ya monene na ndako kuna na etaje, basi'babongisá yango. Bólamba bilei ya feti kuna.”

[13] Bongo bakei, bakuti makambo nyonso ndenge Yezu alobaki na bango, pe babongisi bilei ya feti ya Koleka.

[14] Awa tango ya kolia ekoki, Yezu afandi na mesa ná bantoma na ye.

[15] Alobi na bango: “Banda kala nazalaki na posa penza ya kolia feti ya Koleka oyo esika moko ná bino, liboso 'tè nákufa.

[16] Pamba té nalobi na bino: Nakolia lisusu yango ata mbala moko té, tii tango Nzambe akokokisa tina na yango, na bokonzi na ye.”

[17] Bongo akamati kopo ya vinu, apesi Nzambe mersi pe alobi: “Bókamata vinu oyo pe bókabola yango na kati na bino.

[18] Ya solo, nalobi na bino: banda lelo nakomela lisusu vinu té tii tango Nzambe akotia bokonzi na ye.”

[19] Na sima akamati mapa, asambeli po na kopesa Nzambe mersi, akatikati yango, pe akaboleli bayekoli na ye, alobi: “Oyo ezali nzoto na ngai, napesi yango po na bino. Bósalaka boye po na kokanisa ngai.”

[20] Ndenge moko pe tango basilisi kolia, apesi bango kopo ya vinu, alobi: “Kopo oyo ezali makila na ngai; ekosopana po na bino. Yango nde moto ezali kotia Boyokani ya sika na kati ya Nzambe ná bato.

[21] “Kasi nayebi 'tè moto oyo alingi koteka ngai afandi awa na mesa esika moko ná ngai.

[22] Ya solo, Mwana ya Moto akokufa ndenge Nzambe akaná; kasi mawa na moto oyo akoteka ye.”

[23] Bongo babandi kotunana po na koyeba soki nani na kati na bango alingi koteka ye.

[24] Bayekoli babandi kotiana tembe po na koyeba nani aleki baninga na kati na bango.

[25] Yezu alobi: “Bakonzi ya bikolo balakisaka bokonzi na bango, pe baoyo batambwisaka bamboka balingaka 'tè bato bábenga bango ‘Bato malamu’.

[26] Kasi bino, bósala bongo té. Na kati na bino, moto oyo aleki baninga ázala lokola leki na bino; pe oyo azali mokonzi na bino, ázala lokola mosali.

[27] Ná moto oyo afandi na mesa, ná oyo azali kosalela ye, nani aleki? Moto aleki ezali oyo afandi na mesa. Boye té? Kasi ngai nazali na kati na bino lokola moto oyo azali kosalela bino.

[28] “Bino nde bato bokangamaki na ngai, na bapasi nyonso nazalaki komona.

[29] Ndenge Tata apesá ngai bokonzi, ngai pe napesi bino yango.

[30] Bongo bokobanda kolia pe komela esika moko ná ngai na mboka na ngai. Bokozala kutu kofanda na bakiti ya bokonzi, po na kokata makambo ya bikolo zomi na mibale ya Israel.”

[31] “Simon, Simon, yoka! Satan asengi nzela ya koningisa bino lokola baningisaka mbuma ya blé po na kokabola yango na poso na yango.

[32] Kasi nasi'nabondeli Nzambe po na yo, po bondimi na yo ésila té; bongo yo, tango okozonga epai na ngai, lendisa bandeko na yo.”

[33] Piere alobi na ye: “Mokonzi, ngai nandimi kokende na boloko to kokufa esika moko ná yo.”

[34] Yezu azongiseli ye: “Piere, nalobi na yo: na butu ya lelo liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.”

[35] Na sima Yezu atuni bango: “Tango natindaki bino bozalaki na mbongo té, saki té, basapatu pe té. Bozangaki eloko?” Bango bazongisi: “Té, tozangaki eloko té.”

[36] Bongo ye alobi na bango: “Kasi sik'oyo, moto azali na mbongo ákamata yango; ndenge moko pe po na moto azali na saki. Pe oyo azali kaka na kazaka pamba, áteka yango po na kosomba mbeli.

[37] Nalobi na bino: baprofete bakòmá boye po na ngai: ‘Batiaki ye na molongo ya bato mabe.’ Ya solo, makambo yango esengeli kosalama; elingi kutu kosalama noki.”

[38] Bayekoli balobi: “Mokonzi, awa tozali na bambeli mibale.” Ye azongisi: “Yango ekoki.”

[39] Yezu akei na Ngomba ya ba-Olive ndenge amesaná. Bayekoli na ye balandi ye.

[40] Tango akómi na esika yango, alobi na bango: “Bóbondela Nzambe po Monguna ámeka bino té.”

[41] Sima apusani mwa-mosika na bango, afukami pe abandi kobondela boye:

[42] “Tata soki olingi, longola kopo oyo ya pasi epai na ngai. Kasi kosala té makambo ngai nalingi; sala bobele oyo yo olingi.”

[43] [Bongo anjelu moko ya Likolo abimeli ye po na kolendisa ye.

[44] Yezu ayoki mawa mingi penza, pe atie lisusu makasi po na kobondela. Motoki na ye ekómi kotanga na mabelé lokola matanga ya makila.]

[45] Awa asilisi kobondela, atelemi, akei epai ya bayekoli na ye pe akuti bango balali pongi po na mawa.

[46] Alobi na bango: “Ndenge nini bozali kolala? Bótelema pe bóbondela Nzambe po Monguna ámeka bino té.”

[47] Tango Yezu azalaki nanu koloba, bato ebele bayei. Yudas, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, moto azalaki kolakisa bango nzela. Apusani penepene ya Yezu po áyamba ye.

[48] Kasi Yezu alobi na ye: “Yudas, olingi koyamba Mwana ya Moto po na koteka ye?”

[49] Tango bayekoli ya Yezu bamoni makambo oyo elingaki koya, batuni ye: “Mokonzi, tóbunda na mbeli?”

[50] Pe moko na kati na bango akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi ya liboko ya mobali.

[51] Kasi Yezu alobi: “Esili. Tika boye.” Asimbi litoi ya moto wana pe abikisi ye.

[52] Na sima Yezu atali bakonzi ya banganga-Nzambe, bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, pe bambuta-muntu oyo bayaki po na kokanga ye, alobi na bango boye: “Boni? Nakómi moyibi? Ndenge nini bomemi bambeli ná banzete?

[53] Mikolo nyonso nazalaki esika moko ná bino na Ndako ya Nzambe, nzokande bomekaki kokanga ngai té. Kasi oyo ezali tango na bino pe ya mokonzi ya molili.”

[54] Bakangi Yezu, bamemi ye pe bakotisi ye na ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Piere azalaki kolanda bango na mosika.

[55] Tango bapelisi móto na kati ya lopango, Piere akei kofanda na kati ya bato oyo bazalaki koyotela móto.

[56] Mosali moko ya mwasi amoni ye afandi penepene ya móto, atali ye nyee pe alobi: “Moto oyo pe azalaki ná ye.”

[57] Kasi Piere awangani alobi: “Mama, nayebi ye té!”

[58] Sima ya mwa-tango moke moto mosusu amoni ye pe alobi: “Yo pe ozali moko na bango.” Kasi Piere azongiseli ye: “Té, ngai té!”

[59] Sima soki ya ngonga moko, moto mosusu akangami na ye pe alobi: “Ya solo, moto oyo azalaki ná Yezu. Pamba té ye pe azali moto ya Galilé.”

[60] Kasi Piere azongisi: “Tata, makambo ozali koloba, nayebi yango té.” Awa azalaki nanu koloba, na mbala moko soso eleli.

[61] Mokonzi abaluki pe atali Piere nyee, wana Piere ayei kokanisa maloba oyo Mokonzi alobaki na ye: “Na butu ya lelo liboso soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.”

[62] Bongo Piere abimi pe aleli na mawa mingi penza.

[63] Bato oyo bazalaki kokengela Yezu baseki ye pe babeti ye.

[64] Bazipi ye miso pe balobi na ye: “Lakisa 'tè ozali profete! Nani moto abeti yo?”

[65] Pe bafingaki ye mingi.

[66] Tongo etani, bamemi Yezu liboso ya Likita-Monene, esika bambuta-muntu ya ekolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, pe balakisi-Mibeko basanganaki.

[67] Bongo batuni ye: “Yebisa biso soki ozali Mesia.” Ye azongiseli bango: “Soki nayebisi bino, bokondimela ngai té.

[68] Pe soki natuni bino motuna, bokozongisela ngai té.

[69] Kasi banda lelo Mwana ya Moto akofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe ya nguya nyonso.”

[70] Bango nyonso batuni ye: “Yo nde Mwana ya Nzambe?” Ye azongiseli bango: “Bino moko bolobi 'tè ezali ngai.”

[71] Bongo bango balobi: “Tina ya koluka batemwen ezali lisusu té. Biso moko toyoki maloba na ye.”

Luka — Chapters