Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 11:36

[1] Mbuta-muntu Teofile, Bato mosusu basi'bameká kokòma lisolo ya makambo oyo elekaki na kati na biso. Bakòmaki yango kaka ndenge bayokaki epai ya balakisi ya Sango Malamu, oyo bamonaki yango uta ebandeli. Ngai pe natunaki bato malamu-malamu makambo nyonso, ndenge elekaki uta ebandeli, bongo namoni 'tè ebongi nákòmela yo lisolo yango polele.

[4] Nasali boye po óyeba 'tè nyonso oyo bateyaki yo ezali ya solo.

[5] Tango Erode azalaki mokonzi ya rejion ya Yudea, ezalaki na nganga-Nzambe moko, kombo na ye Zakarya; ye azalaki na molongo ya banganga-Nzambe ya Abiya. Mwasi na ye pe azalaki moto ya libota moko ya banganga-Nzambe, kombo na ye Elizabet.

[6] Bango mibale bazalaki bato malamu na miso ya Nkolo, pe bazalaki kotosa mibeko na ye nyonso.

[7] Kasi bazalaki na Mwana té, po Elizabet azalaki kobota té, pe bango mibale basi'bakómaki mibange.

[8] Mokolo moko Zakarya azalaki kosala mosala na ye ya nganga-Nzambe na kati ya Ndako ya Nzambe ya Yeruzalem, pamba té babengaki molongo na ye kaka na mikolo wana.

[9] Babetaki zeke ndenge banganga-Nzambe bamesaná kosala; bongo ye moto aponamaki po ákende kotumba malasi na Esika ya bosantu.

[10] Na tango wana bato nyonso bazalaki kosambela na libanda.

[11] Anjelu moko ya Nkolo abimeli ye, pe atelemi na liboko ya mobali ya mesa batumbelaka Nzambe malasi.

[12] Tango Zakarya amoni ye, abandi kolenga pe ayoki somo mingi penza.

[13] Kasi anjelu alobi na ye: “Zakarya, kobanga té. Pamba té Nzambe ayoki losambo na yo: mwasi na yo Elizabet akobotela yo mwana-mobali; okopesa ye kombo Yoane.

[14] Okozala na esengo mingi, pe bato mingi bakosepela po na mbotama na ye.

[15] Ye akozala moto monene na miso ya Nkolo; akobanda komela vinu té to masanga ya makasi. Akotonda na Molimo Mosantu, banda na libumu ya mama na ye.

[16] Akozongisa bato mingi ya Israel epai ya Nkolo, Nzambe na bango.

[17] Akokende liboso ya Nkolo, na nguya pe makasi lokola profete Eliya, akozongisa boyokani na kati ya batata ná bana na bango; pe akosala 'tè bato ya mitú makasi bázwa mayele ya bato malamu; akobongisa bongo bato po na kosalela Nkolo.”

[18] Zakarya atuni anjelu: “Ndenge nini nakoyeba 'tè makambo wana ezali ya solo? Pamba té biso ná mwasi na ngai tosi'tokómi mibange.”

[19] Bongo anjelu azongiseli ye: “Ngai nazali Gabriel, natelemaka liboso ya Nzambe po na kosalela ye. Atindi ngai náya koloba na yo pe komemela yo sango oyo ya malamu.

[20] Makambo nayebisi yo ekosalama na tango Nzambe atiá. Kasi lokola ondimi yango té, okokóma baba; okoloba lisusu té banda lelo tii mokolo yango.”

[21] Nzokande bato nyonso bazalaki kozela Zakarya pe bakamwaki po ye aumelaki mingi na Ndako ya Nzambe;

[22] kasi tango ye abimi akokaki koloba na bango té, bongo bato nyonso bayaki koyeba 'tè amonaki likambo na kati ya Ndako ya Nzambe. Azalaki kaka kosala bilembo na maboko po na kosolola na bango, pe atikalaki baba.

[23] Tango Zakarya asilisi mikolo na ye ya mosala na Ndako ya Nzambe, azongi epai na ye.

[24] Na sima ya mwa-tango moke mwasi na ye Elizabet azwi zemi pe akei komibomba sanza mitano na kati ya ndako; amilobi:

[25] “Tala likambo Nkolo asali po na ngai! Pamba té alongoli ngai soni na miso ya bato.”

[26] Tango zemi ya Elizabet ekómi na sanza motoba, Nzambe atindi anjelu Gabriel na mboka moko ya Galilé, kombo na yango Nazaret,

[27] epai ya elenge mwasi oyo akobalana ná Jozef, moto ya libota ya David. Kombo ya elenge mwasi yango Maria.

[28] Anjelu akoti na ndako ya Maria pe alobi: “Mbote na yo! Sepela, pamba té Nkolo azali na yo, atondisá yo na bolamu.”

[29] Tango Maria ayoki maloba wana, abangi pe amituni tina ya mbote wana.

[30] Bongo anjelu alobi na ye: “Maria, kobanga té. Nzambe asepeli na yo.

[31] Okozwa zemi, okobota mwana-mobali; okopesa ye kombo Yezu.

[32] Akozala moto monene; bakobanda kobenga ye Mwana ya Nzambe. Nkolo Nzambe akopesa ye bokonzi ya koko na ye David.

[33] Akozala mokonzi ya bato ya Israel libela; bokonzi na ye ekozala na suka té.”

[34] Maria atuni anjelu: “Ngai nayebi nanu nzoto ya mobali té; ndenge nini makambo wana ekoki kosalama?”

[35] Anjelu azongiseli ye: “Molimo Mosantu akokitela yo; nguya ya Nzambe ekozipa yo lokola lipata. Yango wana Mwana oyo okobota akozala mosantu. Bakobanda kobenga ye Mwana ya Nzambe.

[36] Ndeko na yo Elizabet kutu ye pe alingi ábota mwana-mobali, atako akómi mobange. Bazalaki koloba 'tè akoki kobota té, kasi sik'oyo azali na zemi ya sanza motoba.

[37] Pamba té Nzambe akoki kosala makambo nyonso.”

[38] Bongo Maria alobi: “Nazali mosali ya Nkolo. Ésalama ndenge olobi.” Pe anjelu atiki ye.

[39] Kaka na tango wana Maria akamati nzela, akei noki na mboka moko, epai ya bangomba ya rejion ya Yudea.

[40] Akoti na ndako ya Zakarya pe apesi Elizabet mbote.

[41] Tango Elizabet ayoki maloba ya Maria, Mwana aningani na libumu na ye, bongo Elizabet atondi na Molimo Mosantu.

[42] Alobi na mongongo makasi: “Nzambe abenisá yo koleka basi nyonso! Ábenisa pe mwana oyo okobota.

[43] Nakómi nani po mama ya Mokonzi na ngai áya kotala ngai?

[44] Pamba té bobele tango nayoki mbote na yo, mwana aningani na libumu na ngai po na esengo.

[45] Ya solo ozali moto ya esengo, po ondimi 'tè makambo Nkolo alobaki na yo ekosalama.”

[46] Bongo Maria alobi: “Nazali kokumisa Nkolo na motema mobimba;

[47] natondi na esengo po na Nzambe, Mobikisi na ngai.

[48] Pamba té atali ngai mosali na ye nazangá tina; ya solo, banda lelo bato nyonso bakobanda kobenga ngai moto ya esengo.

[49] Nzambe ya nguya nyonso asali ngai makambo ya minene; amonisi 'tè azali Nzambe Mosantu.

[50] Tango nyonso alakisaka bolingo na ye, epai ya bato oyo batosaka ye.

[51] Asali misala ya kokamwa na nguya na ye; apanzi bato bazali na lofundu na mitema.

[52] Atie bakonzi minene pembeni; pe atomboli bato bazangá lokumu.

[53] Atondisi bato oyo bakufi na nzala; pe azongisi bato ya mbongo maboko pamba.

[54] Ayambi bato ya Israel, basali na ye, ndenge alakaká na bakoko na biso. Ayokeli Abraham ná bana na ye lisusu mawa; akoyokela biso mawa mikolo nyonso seko.”

[56] Maria atikalaki epai ya Elizabet sanza misato, na sima azongi na mboka na ye.

[57] Tango mokolo ya Elizabet ya kobota ekokaki, abotaki mwana-mobali.

[58] Bato bazalaki kofanda na ye penepene, ná bandeko na ye, bayoki ndenge Nkolo asalaki Elizabet bolamu, bongo basepelaki na ye.

[59] Tango mwana akokisi mikolo mwambe, bayei po na kokata ye. Balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye Zakarya,

[60] kasi mama na ye alobi: “Té! Kombo na ye ekozala Yoane.”

[61] Bango bazongiseli ye: “Ata moto moko té na kati ya libota na yo azali na kombo oyo!”

[62] Batuni tata ya Mwana na bilembo, kombo nini ye alingi kopesa na mwana.

[63] Zakarya asengi mwa-libaya pe akòmi boye: “Kombo na ye Yoane.” Bango nyonso bakamwe!

[64] Na mbala moko Zakarya abandi koloba lisusu, pe na mongongo makasi akumisi Nzambe.

[65] Bongo bato oyo bazalaki kofanda penepene bakómi kobanga. Na bipai nyonso na bangomba ya Yudea bazalaki koloba bobele makambo yango.

[66] Bato nyonso oyo bayokaki yango bazalaki kokanisa pe komituna: “Mwana wana akozala nani?” Ya solo, nguya ya Nkolo ezalaki na ye.

[67] Zakarya; tata ya Yoane; atondaki na Molimo Mosantu, pe abandi kosakola boye:

[68] “Lokumu ézala na Nkolo, Nzambe ya Israel; ayei po na kolongola bato na ye na boumbu.

[69] Abimiseli biso elombe Mobikisi, na kati ya libota ya mosali na ye David.

[70] Akokisi elaka oyo apesaká kala, na minoko ya baprofete na ye ya bosantu.

[71] Abikisi biso na maboko ya banguna, pe ya bato nyonso oyo bayinaka biso.

[72] Ayokeli bakoko na biso mawa; ayei kokanisa Boyokani oyo ye moko atiaká.

[73] Pamba té akatelaká koko na biso Abraham seleka 'tè

[74] akolongola biso na maboko ya banguna po tótika kobanga, bongo tókoka kosalela ye na bomoi na biso mobimba, tózala bato ya bosantu pe ya bosembo na miso na ye.

[76] Boye yo, Mwana moke, bakobanda kobenga yo profete ya Nzambe; okokende liboso ya Nkolo po na kobongisela ye nzela.

[77] Okoyebisa bato na ye 'tè akobikisa bango, po akolimbisa bango masumu.

[78] Ya solo, Nzambe na biso atondá na bolamu pe bolingo; abimisi Moi oyo eyei kotala biso uta na Likolo,

[79] po éngengela bato oyo bakangamá na molili ya somo, pe étambwisaka biso, tólanda nzela ya boboto.”

[80] Mwana akolaki pe Nzambe apesaki ye nguya; azalaki kofanda na esobe tii mokolo ayaki kobima na miso ya bato ya Israel.

Luka — Chapters