Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:39

[1] Bato nyonso oyo bazalaki na likita batelemi pe bamemi Yezu epai ya Pilate.

[2] Babandi kofunda ye boye: “Tomonaki moto oyo azali kokosa bato ya ekolo na biso; ye apekisi bango báfuta mpaku na mokonzi monene ya Rome té, pe amitie Mesia, Mokonzi na biso.”

[3] Pilate atuni ye: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?” Yezu azongiseli ye: “Yo moko olobi yango.”

[4] Bongo Pilate alobi na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na bato nyonso oyo batondanaki wana: “Namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu.”

[5] Kasi bango batie molende pe balobi: “Ye azali kokosa bato na mateya na ye po bátomboka. Abandaki na Galilé, aleki na Yudea mobimba, sik'oyo akómi tii awa.”

[6] Tango Pilate ayoki makambo wana, atuni: “Moto oyo azali moto ya Galilé?”

[7] Pe awa ayoki 'tè Yezu azali moto ya mboka ya mokonzi Erode, atindi ye epai ya Erode, pamba té mikolo wana ye azalaki na Yeruzalem.

[8] Tango Erode amoni Yezu, asepelaki mingi po ayokaki sango na ye, pe banda kala azalaki na posa ya kokutana na ye. Azalaki kotia motema 'tè Yezu akosala likamwisi na miso na ye.

[9] Bongo atuni Yezu mituna mingi, kasi Yezu azongisi ata liloba té.

[10] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bazalaki wana bafundifundi ye pe bagangi.

[11] Erode ná basoda na ye baseki Yezu pe batsioli ye. Balatisi ye elamba moko ya kitoko lokola ya moto ya lokumu, pe bazongisi ye epai ya Pilate.

[12] Kaka na mokolo wana Erode ná Pilate babandi koyokana, pamba té liboso bazalaki banguna.

[13] Pilate abengisi lisusu bakonzi ya banganga-Nzambe, batambwisi ná bato mosusu nyonso,

[14] alobi na bango: “Bino bomemi moto oyo epai na ngai pe bolobi 'tè azali kokosa bato. Natuni ye liboso na bino nyonso; kasi namoni tina ya kokatela ye etumbu té, na makambo oyo bozali kofunda ye.

[15] Mokonzi Erode pe amoni ye ata na mabe moko té, pamba té azongisi ye epai na biso. Ya solo, moto oyo asali eloko té po ákufa.

[16] Yango wana nakobetisa ye kaka fimbu, na sima nakotika ye.”

[17] [Na bafeti nyonso ya feti ya Koleka, Pilate azalaki kobimisela bango moto moko ya boloko.]

[18] Kasi bango nyonso babandi koganga: “Boma moto wana! Tikela biso Barabas!”

[19] Batiaki Barabas na boloko po bato batombokaki na mboka, pe ye abomaki moto.

[20] Pilate azongiseli bango maloba po alingaki kotika Yezu,

[21] kasi bango bagangi: “Boma ye na kuruze! Boma ye na kuruze!”

[22] Pilate alobi na bango mbala ya misato: “Kasi mabe nini ye asali? Namoni ata mabe moko té na ye po ákufa. Yango wana nakobetisa ye kaka fimbu, na sima nakotika ye.”

[23] Kasi bazalaki kaka koganga makasi po báboma Yezu na kuruze, pe koganga na bango elongisi bango.

[24] Bongo Pilate akati likambo ndenge bango basengaki.

[25] Atiki moto bango basengaki, oyo batiaki na boloko po atombokaki pe abomaki moto. Apesi Yezu na maboko na bango po básala ye ndenge bango moko balingi.

[26] Awa basoda bazalaki kokende na Yezu, bakutani ná moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, autaki na bilanga. Bakangi ye pe bapesi ye kuruze ya Yezu po ámema yango sima na ye.

[27] Bato ebele babandaki kolanda ye, basi bazalaki kolela pe koganga makasi po na ye.

[28] Yezu abaluki epai na bango pe alobi: “Bamama ya Yeruzalem, bólela po na ngai té! Kasi bólela po na bino moko pe po na bana na bino.

[29] Pamba té na mikolo ekoya bakobanda koloba: ‘Esengo na basi oyo bazangá bana, ná baoyo babotá nanu té, pe bamelisá nanu bana mabéle té!’

[30] Bongo bato bakobanda koloba na bangomba ya minene: ‘Bókweela biso!’ Pe na bangomba ya mike: ‘Bózipa biso!’

[31] Pamba té soki basali nzete ya mobesu boye, bakosala nini na nzete ya kokauka?”

[32] Bamemaki pe bato mibale mosusu po na koboma bango esika moko ná Yezu. Bato yango bazalaki bato mabe.

[33] Tango bakómi na esika oyo babengaka “Mokuwa ya Motú,” batie Yezu na kuruze, ná bato mabe wana mibale, moko na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi.

[34] Yezu abondeli boye: “Tata, limbisa bango, po makambo bazali kosala, bayebi yango té.” Babeteli bilamba na ye zeke, pe bakaboli yango.

[35] Bato batelemi kuna po na kotala. Bakonzi ya Bayuda bazalaki koseka Yezu boye: “Ye abikisaki bato mosusu; ámibikisa ye moko, soki azali penza Mesia oyo Nzambe aponá.”

[36] Basoda pe baseki ye. Bayei penepene na ye, bapesi ye vinu ya ngayi,

[37] pe balobi: “Soki ozali mokonzi ya Bayuda, ómibikisa!”

[38] Na likolo ya motú ya Yezu batiaki mwa-libaya bakòmá: “Moto oyo azali mokonzi ya Bayuda.”

[39] Moko ya bato mabe oyo batiaki na kuruze azalaki kofinga Yezu boye: “Yo ozali Mesia té? Ómibikisa, pe bikisa biso!”

[40] Kasi moninga na ye amoni yango mabe, alobi na ye: “Okobanga Nzambe té? Biso nyonso tozwi etumbu ya ndenge moko.

[41] Etumbu oyo ebongi na biso mibale; pamba té mabe oyo tosalaki ezongeli biso; kasi ye asali mabe té.”

[42] Na sima alobi: “Yezu, ókanisa ngai tango okozwa bokonzi na yo.”

[43] Yezu azongiseli ye: “Nalobi na yo, ya solo: lelo okozala ná ngai na mboka ya bisengo.”

[44] Ekomi penepene ya midi; molili ekwei na mokili mobimba tii na ngonga ya misato ya pokwa.

[45] Ridó monene oyo ezalaka na Ndako ya Nzambe, na liboso ya Esika eleki bosantu, epasuki na kati-kati.

[46] Yezu agangi makasi penza: “Tata, nazongisi molimo na ngai na maboko na yo.” Awa alobi boye, akati motema.

[47] Tango mokonzi ya basoda amoni makambo oyo ezalaki koleka, akumisi Nzambe alobi: “Ya solo, moto oyo azalaki moto ya bosembo!”

[48] Bato nyonso oyo bayaki po na kotala ndenge makambo ya Yezu ekosuka, bazongi pe batondaki na mawa.

[49] Baninga ya Yezu nyonso, pe basi oyo balandaki ye kobanda Galilé, batelemaki mosika po na kotala.

[50] Moto moko ya Likita-Monene ya Bayuda ayei kuna, kombo na ye Jozef; azalaki moto malamu pe abandaki kotosa Nzambe.

[51] Ye aboyaki mokano ya bato mosusu ya Likita-Monene pe makambo bango basalaki Yezu. Azalaki moto ya Arimaté, mboka moko ya Bayuda, pe azalaki kotia motema 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye.

[52] Akei epai ya Pilate pe asengi ye ebembe ya Yezu,

[53] na sima alongoli yango na kuruze, alíngi yango na elamba kitoko pe atie yango na libulu moko bakatá na kati ya mabanga; kuna nanu bakundá moto té.

[54] Ezalaki mokolo ya kolengela Mokolo ya Kopema, pe yango elingaki kobanda.

[55] Basi oyo balandaki Yezu kobanda Galilé bayei nzela moko ná Jozef. Batali libulu pe bamoni ndenge batiaki nzoto ya Yezu.

[56] Na sima bazongi na bandako na bango, pe babongisi malasi ná mafuta ya kopakola po na kotia na nzoto ya Yezu. Na Mokolo ya Kopema bapemi, ndenge Mibeko ezalaki kotinda.

Luka — Chapters