Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:01

[1] Yezu alobi na bayekoli na ye: “Makambo oyo ekweisaka bato na likambo ekoki kozanga té; kasi mawa mingi na moto oyo akweisaka baninga!

[2] Ebongi malamu bákanga ye libanga ya monene na kingo pe bábwaka ye na ebale, esika 'tè ákweisa moto moko oyo ayebi makambo mingi té.

[3] Bókeba! “Soki ndeko na yo asali yo mabe, lakisa ye mabe ye asali. Soki andimi kobongola motema, limbisa ye.

[4] Soki asali yo mabe mbala sambo na mokolo moko pe soki azongi po na koloba na yo: ‘Yokela ngai mawa’, limbisa ye.”

[5] Bantoma balobi na Mokonzi: “Moteyi, kolisa bondimi na biso.”

[6] Mokonzi azongisi: “Bókanisa mbuma oyo babengaka mutarde. Soki bondimi na bino ezalaki na nguya lokola ya mbuma wana ya moke, mbele bokokaki koloba na nzete oyo: ‘Longwa awa pe kende kopikama na ebale!’ pe yango elingaki kotosa bino.”

[7] “Bókanisa nanu. Soki moto moko na kati na bino azali na mosali oyo asalaka na bilanga to akengelaka bameme, ndenge nini bazalaka ye ná mosali na ye? Tango mosali azongaka na ndako, mokonzi moko té alobaka na ye: ‘Yaka noki, fanda pe lia.’

[8] Kasi alobaka na ye: ‘Nalingi kolia. Lambela ngai, lata bilamba ya mosala pe bongisela ngai mesa. Bongo na sima yo pe okoki kolia.’

[9] Mokonzi apesaka mosali na ye mersi po atosi maloba na ye? Eloko té.

[10] Ezali ndenge moko pe po na bino: soki bosali nyonso oyo Nzambe atindi, bóloba: ‘Tozali kaka basali; tosali bobele mosala na biso.’”

[11] Lokola Yezu azalaki kokende na Yeruzalem, aleki na katikati ya rejion ya Samarie ná ya Galilé.

[12] Tango alingaki kokota na mboka moko, bato zomi oyo bazalaki na maladi ya maba bayei po bákutana ná ye. Batelemi mwa-mosika,

[13] pe babandi kobelela: “Moteyi, Yezu, yokela biso mawa!”

[14] Yezu amoni bango pe alobi: “Bókende komilakisa epai ya banganga-Nzambe po bátala nzoto na bino.” Tango bazalaki kokende babiki.

[15] Moko na kati na bango, awa amoni 'tè abiki, abandi kokumisa Nzambe makasi, pe ayei kozonga epai ya Yezu.

[16] Afukameli Yezu pe apesi ye mersi. Nzokande moto wana azalaki moto ya Samarie.

[17] Bongo Yezu alobi: “Bango nyonso zomi té bato babiki? Wapi bato libwa mosusu?

[18] Bobele mopaya oyo nde moto azongi po na kopesa Nzambe mersi?”

[19] Na sima Yezu alobi na ye: “Telema, kende. Bondimi na yo ebikisi yo.”

[20] Ba-Farizé mosusu batuni Yezu tango nini Nzambe akotia bokonzi na ye. Ye azongiseli bango boye: “Elembo moko té ekozala, oyo ekolakisa 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye.

[21] Bakokoka pe koloba té 'tè: ‘Tala, yango oyo!’ to ‘Yango kuna!’ Pamba té, bokonzi ya Nzambe esi'ekómi na kati na bino.”

[22] Sima alobi na bayekoli: “Mikolo ezali koya, bokozala na posa ya komona Mwana ya Moto, ata mokolo moko pamba, tango akozonga; kasi bokomona ye té.

[23] Na mikolo wana bakobanda koloba na bino: ‘Ye oyo!’ to ‘Ye kuna!’ Kasi bókende té pe bólanda bango té.

[24] Pamba té ndenge kake eutaka na likolo pe engengisaka bipai nyonso, Mwana ya Moto akoya ndenge wana.

[25] Kasi liboso asengeli komona pasi mingi; bato ya tango oyo bakoboya ye.

[26] “Tango mokolo ya Mwana ya Moto ekokoka, makambo ekosalama ndenge esalamaká na tango ya Noé.

[27] Bato bazalaki kolia pe komela, bazalaki kobalana tii mokolo Noé akotaki na masuwa, bongo mai eyaki kodindisa mokili pe ebomaki bango nyonso.

[28] Ekozala lokola na tango ya Lot: bato bazalaki kolia pe komela; bazalaki kosomba pe koteka; bazalaki kokona pe kotònga bandako.

[29] Kasi mokolo Lot alongwaki na Sodome, Nzambe akweisaki móto ná fofólo, bongo bato nyonso bakufaki.

[30] Ekozala pe ndenge moko, mokolo Mwana ya Moto akomilakisa.

[31] Na mokolo wana moto oyo akozala na libanda, ákota na ndako té po na kokamata biloko na ye. Ndenge moko pe, moto oyo akozala na bilanga ázonga na ndako na ye té.

[32] Bókanisa mwasi ya Lot!

[33] Moto oyo akoluka kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango, kasi oyo akobungisa bomoi na ye, akobikisa yango.

[34] “Nalobi na bino: soki bato mibale bakolala mbeto moko na butu wana, bakokamata moko pe bakotika mosusu.

[35] Soki basi mibale bakozala konika blé esika moko, bakokamata moko pe bakotika mosusu.

[36] [Mibali mibale bakozala na elanga, bakokamata moko pe bakotika mosusu.]”

[37] Bayekoli batuni ye: “Mokonzi, makambo wana ekoleka wapi?” Ye azongisi: “Epai ebembe ezali, bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana kuna.”

Luka — Chapters