[1] Tango Yezu asilisi koloba na bato makambo nyonso wana, akei na Kafarnaum.
[2] Kuna, mokonzi moko ya basoda ya Rome azalaki na mosali moko oyo ye abandaki kolinga mingi. Mosali wana azalaki na maladi pe alingaki kokufa.
[3] Tango mokonzi ya basoda ayoki sango ya Yezu, atindi bambuta-muntu mosusu ya Bayuda po bákende kobondela ye 'tè áya kobikisa mosali na ye.
[4] Awa bakómi epai ya Yezu, pe babandi kobondela ye, balobi: “Ya solo, moto atindi biso azali moto malamu, ebongi ósalisa ye.
[5] Alingaka ekolo na biso; ezali kutu ye moto atòngisaki ndako na biso ya lisanga.”
[6] Bongo Yezu akei nzela moko ná bango. Tango akómi penepene ya ndako, mokonzi ya basoda wana atindi baninga na ye po báloba na Yezu boye: “Mokonzi, komitungisa té. Ngai nazali nani po ókota na ndako na ngai?
[7] Yango wana nabangaki koya ngai moko epai na yo. Kasi loba kaka liloba moko pe mosali na ngai akobika.
[8] Pamba té ngai pe natosaka bakonzi na ngai; nazali pe na basoda oyo batosaka ngai. Soki nalobi na moko: ‘Kende’, akei; soki nalobi na mosusu ‘Yaka’, ayei; pe soki natindi mosali na ngai ‘Sala mosala oyo’, asali yango.”
[9] Awa Yezu ayoki maloba wana akamwe; abaluki pe alobi na bato oyo bazalaki kolanda ye: “Nalobi na bino, nanu namoná bondimi ya ndenge oyo té, ata na kati ya bato ya Israel!”
[10] Tango bato wana bazongi na ndako ya mokonzi ya basoda, bakuti mosali yango abiki.
[11] Na sima Yezu akei na vile moko kombo na yango Nain; bayekoli na ye ná bato ebele bazalaki kokende nzela moko ná ye.
[12] Tango akómi penepene ya porte ya lopango oyo ezalaki kozinga vile wana, bakutani ná bato bazalaki kokende kokunda ebembe: ezalaki Mwana ya mwasi moko akufelá mobali; mama wana azalaki na mwana mosusu té. Bato mingi ya mboka bazalaki kokende nzela moko ná ye.
[13] Tango Mokonzi amoni mama wana, ayokeli ye mawa mingi na motema pe alobi na ye: “Kolela té.”
[14] Yezu apusani pe asimbi sanduku ya ebembe. Bato oyo bazalaki komema yango batelemi. Yezu alobi: “Elenge mobali, nalobi na yo: Lamuka!”
[15] Moto oyo akufaki afandi pe abandi koloba. Bongo Yezu alobi na mama na ye: “Kamata mwana na yo.”
[16] Bato nyonso babangi; bakumisi Nzambe, balobi: “Profete monene abimi na kati na biso!” Pe lisusu: “Nzambe ayei kosalisa bato na ye!”
[17] Bongo sango ya Yezu epanzanaki bipai nyonso tii na Yudea mobimba pe na bamboka ya pembeni.
[18] Bayekoli ya Yoane balobeli ye makambo wana nyonso. Bongo Yoane abengi bato mibale na kati na bango,
[19] pe atindi bango bákende kotuna Mokonzi boye: “Ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu?”
[20] Tango bakómi epai ya Yezu, balobi na ye: “Yoane Mobatisi atindi biso po na kotuna yo soki ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu.”
[21] Kaka na tango wana Yezu azalaki kobikisa bato mingi na maladi pe na bapasi na bango. Azalaki kobimisa milimo mabe pe kobikisa bato mingi bakufá miso.
[22] Bongo azongiseli bato ya Yoane boye: “Bókende koloba na Yoane makambo oyo bino bomoni pe boyoki: bato bakufá miso bakómi komona, bato bakufá matoi bakómi koyoka, bato bakufá makolo bakómi kotambola, bato bazali na maladi ya maba babandi kobika, bato bakufá babandi kosekwa, pe bato ya mawa babandi koyoka Sango Malamu.
[23] Esengo mingi na moto oyo atie tembe té po na ngai.”
[24] Awa bato oyo Yoane atindaki bakei, Yezu abandi kotuna bato po na Yoane: “Bokendeki kotala nini na esobe? Mwa-nzete oyo mopepe ezali koningisa? Té!
[25] Bongo bokendeki kuna po na nini? Po na kotala moto moko oyo alati bilamba ya kitoko? Té! Po bato balataka bilamba ya kitoko pe bazali na bomengo, bafandaka na bandako ya bakonzi.
[26] Bongo bokendeki kotala nani? Profete? Ee, bokendeki kotala profete. Ya solo, nalobi na bino: ye aleki kutu profete.
[27] Pamba té Yoane azali moto oyo bakòmá boye: ‘Nzambe alobi: Tala, natindi ntoma na ngai liboso na yo, po na kobongisela yo nzela.’
[28] Nalobi na bino, na kati ya bato nyonso Nzambe asalá, moko té aleki Yoane. Kasi na kati ya bokonzi ya Nzambe, moto ya suka aleki ye.
[29] “Bato nyonso ná bafutisi-mpaku bayokaki maloba ya Yoane, bandimaki kotosa Nzambe, pe bazwaki batisimo ya Yoane.
[30] Nzokande ba-Farizé ná balakisi-Mibeko baboyaki makambo Nzambe alingaki kosala po na bango, pe bazwaki batisimo ya Yoane té.
[31] “Bongo bato ya lelo bakokani ná banani? Bazali lokola banani?
[32] Bakokani ná bana mike bafandi na zando, pe bazali koloba na baninga na bango: ‘Tobeteli bino miziki, kasi bobini té! Toyembeli bino banzembo ya mawa, kasi boleli té!’
[33] Pamba té Yoane Mobatisi ayei, aboyi kolia pe komela lokola bato nyonso, balobi: ‘Azali na ndoki.’
[34] Mwana ya Moto ayei, azali kolia pe komela, bongo bolobi: ‘Bótala moto oyo, azali kokanisa kaka kolia pe komela vinu. Azali moninga ya bafutisi-mpaku pe bato ya masumu.’
[35] Kasi mayele ya Nzambe ezali komonana solo na bato nyonso bandimaka yango.”
[36] Farizé moko abengaki Yezu po ákende kolia epai na ye. Yezu akoti na ndako ya Farizé wana pe afandi na mesa.
[37] Mwasi moko ya masumu azalaki na mboka yango. Tango ayoki 'tè Yezu afandi na mesa na ndako ya Farizé wana, amemi molangi moko ya talo mingi etondá na malasi.
[38] Ayei penepene ya makolo ya Yezu; abandi kolela, bongo mai na ye ya miso ekómi kotanga na makolo ya Yezu; na sima apangusi yango na suki na ye, apesi yango bezé pe apakoli yango malasi.
[39] Tango Farizé oyo abengaki Yezu amoni bongo, amilobi: “Soki moto oyo ázala penza profete, mbele alingaki koyeba mwasi oyo azali kosimba ye pe bizaleli na ye, pamba té azali moto ya masumu.”
[40] Bongo Yezu alobi na Farizé wana: “Simon, nazali na likambo ya kolobela yo.” Simon azongisi: “Loba, Moteyi.”
[41] Pe Yezu alobi: “Bato mibale bazalaki na nyongo ya moto moko. Oyo ya liboso adefaki mbongo ebele, mosusu adefaki moke.
[42] Lokola bakokaki kofuta nyongo na ye té, alimbisaki bango mibale. Na kati na bango mibale, nani moto akolinga ye mingi?”
[43] Simon azongiseli ye: “Nakanisi moto oyo balimbisaki nyongo mingi.” Yezu alobi na ye: “Olongi.”
[44] Bongo Yezu abaluki epai ya mwasi wana pe alobi na Simon: “Omoni mwasi oyo? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki ngai mai ya kosukola makolo té; kasi ye asukoli makolo na ngai na mai na ye ya miso pe apangusi yango na suki na ye.
[45] Oyambaki ngai na tolo té; kasi na bolingo na ye banda nakoti, ye atiki koyamba ngai na makolo té.
[46] Opakolaki ngai mafuta na motú té, kasi ye apakoli ngai malasi na makolo.
[47] Yango wana, nalobi na yo: azwi bolimbisi ya masumu na ye atako ezali ebele, po alakisi bolingo monene. Moto oyo balimbisi mingi té, amonisaka pe bolingo mingi té.”
[48] Bongo Yezu alobi na mwasi wana: “Nalimbisi yo masumu.”
[49] Bato oyo bafandaki na ye na mesa babandi komituna: “Moto oyo azali nani po álimbisa masumu?”
[50] Kasi Yezu alobi na mwasi wana: “Bondimi na yo ebikisi yo. Kende malamu.”