[1] Yezu akoti na Jerikó. Moto moko azalaki kuna, kombo na ye Zashé. Ye azalaki mokonzi ya bafutisi-mpaku pe moto ya mbongo mingi. Tango Yezu azalaki kokatisa mboka,
[3] Zashé aluki nzela ya komona ye; kasi lokola azalaki mokuse, akokaki té po bato bazalaki mingi.
[4] Bongo akei mbangu liboso, pe amati na nzete moko ya sikomore po ámona ye, pamba té alingaki kolekela kuna.
[5] Tango Yezu akómi na esika wana, atali na likolo pe alobi na ye: “Zashé, kita noki, pamba té lelo nasengeli kolala na ndako na yo.”
[6] Zashé akiti noki pe ayambi ye na esengo.
[7] Bato nyonso oyo bazalaki komona makambo wana bakómi koyimayima, balobi: “Moto oyo akei kolala na ndako ya moto ya masumu.”
[8] Kasi Zashé alobi na Mokonzi: “Mokonzi, tala, nakokabola biloko na ngai na katikati; nakopesa ndambo mosusu na bato bakelelá. Pe soki nayibaki moto na mayele, nakozongisela ye mbala minei.”
[9] Yezu azongiseli ye: “Lelo obiki, ná bato na yo; pamba té yo pe ozali moto ya libota ya Abraham.
[10] Ya solo, Mwana ya Moto ayei koluka pe kobikisa bato oyo babungá.”
[11] Yezu alobi lisusu lisapo moko na bato oyo bayokaki maloba wana. Pamba té lokola azalaki penepene ya Yeruzalem, bato mingi babandaki kokanisa 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye kaka na tango wana.
[12] Bongo Yezu alobi: “Moto moko ya lokumu alingaki kokende na vile moko mosika, po bátia ye mokonzi ya mboka na ye.
[13] Liboso ya kokende, abengi basali na ye zomi, pe apesi bango mbongo na ye; moto na moto azwi ebende moko ya or. Alobi na bango: ‘Bósala mombongo na mbongo oyo tii tango nakozonga.’
[14] Kasi bato ya mboka na ye bazalaki koyina ye, bongo batindi bantoma na sima na ye na vile wana po bákende koloba 'tè: ‘Biso tolingi té moto oyo ázala mokonzi na biso.’
[15] “Awa batie ye mokonzi azongi na mboka na ye, bongo abengi basali oyo ye apesaki mbongo, po áyeba benefisi ya moto na moto.
[16] Moto ya liboso ayei pe alobi: ‘Mokonzi, mbongo opesaki ngai eboti benefisi ya bibende zomi ya or.’
[17] Mokonzi alobi na ye: ‘Longonya, mosali malamu. Osali penza mosala po na makambo ya mike, bongo natie yo motambwisi ya bavile zomi.’
[18] Mosali ya mibale ayei pe alobi: ‘Mokonzi, mbongo opesaki ngai eboti benefisi ya bibende mitano ya or.’
[19] Mokonzi azongiseli ye: ‘Yo, natie yo motambwisi ya bavile mitano.’
[20] Mosali mosusu ayei pe alobi: ‘Mokonzi, mbongo na yo ya or yango oyo. Nabombaki yango na kitambala.
[21] Nazalaki kobanga, po ozali moto moko ya matata. Ozwaka biloko oyo omoneli pasi té; obukaka bambuma ata oyo okoni té.’
[22] Bongo azongiseli ye: ‘Mosali mabe! Nakokitisa yo bobele po na maloba outi koloba. Oyebaki 'tè nazali moto ya matata. Nazwaka biloko oyo namoneli pasi té; pe nabukaka bambuma ata oyo nakoni té.
[23] E bongo po na nini otiaki mbongo na ngai na banke té? Awa nazongi, nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi.’
[24] Na sima alobi na bato bazalaki pembeni na ye: ‘Bóbotola ye ebende ya or wana, pe bópesa yango na moto oyo azali na bibende zomi.’
[25] Balobi na ye: ‘Mokonzi, ye azali na yango ebele!’
[26] Ye azongisi: ‘Nalobi na bino, moto nyonso oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye ata mwa-ndambo oyo azali na yango.
[27] Bongo banguna na ngai oyo balingaki té 'tè názala mokonzi na bango, bómema bango awa, pe bóboma bango na miso na ngai.’”
[28] Awa Yezu asilisi koloba bongo, aleki liboso na bango po na kokende na Yeruzalem.
[29] Tango akómi na mboka Betfajé pe Betanie penepene ya ngomba oyo babengaka Ngomba ya ba-Olive, atindi bayekoli mibale, alobi na bango:
[30] “Bókende na mboka wana etalani ná biso; tango bokokóma kuna, bokomona mwana-punda bakangá na singa; nanu bamatá yango té. Bófungola yango pe bómema yango awa.
[31] Soki moto atuni bino po na nini bozali kofungola yango, bóloba na ye: ‘Mokonzi azali na posa na yango.’”
[32] Bayekoli wana bakei pe bamoni makambo nyonso ndenge Yezu alobelaki bango.
[33] Tango bazalaki kofungola mwana-punda, bakolo na yango batuni bango: “Po na nini bozali kofungola mwana-punda oyo?”
[34] Bazongisi: “Mokonzi azali na posa na yango.”
[35] Na sima bamemi mwana-punda epai ya Yezu, batie yango bilamba na bango, pe bafandisi Yezu.
[36] Tango azalaki kokende bato babandaki kotanda bilamba na bango na nzela.
[37] Awa akómi penepene ya nzela oyo ekitá na Ngomba ya ba-Olive, bayekoli ebele babandi kosepela pe kokumisa Nzambe na mingongo makasi, po na makamwisi nyonso oyo bamonaki.
[38] Bazalaki koloba: “Nkolo ábenisa Mokonzi oyo ayei na kombo na ye! Boboto ézala na Likolo, pe lokumu ézala na Nzambe!”
[39] Ba-Farizé mosusu pe bazalaki na kati ya bato, bongo balobi na Yezu: “Moteyi, loba na bayekoli na yo báfanda nyee!”
[40] Yezu azongisi: “Nalobi na bino: ata soki bango bafandi nyee, mabanga ekoganga!”
[41] Awa Yezu akómi penepene ya mboka Yeruzalem, tango amoni yango, aleli po na yango,
[42] alobi: “E Yeruzalem, natondi na mawa, po makambo oyo ekoki komemela yo boboto lelo, oyebi yango té. Ya solo, okoki koyeba yango té!
[43] Mikolo ezali koya, banguna na yo bakotimola terasé pe bakotònga lopango monene po na kozinga yo pe kobundisa yo.
[44] Bakopanza yo nyonso, pe bakosilisa bato na yo. Na kati na yo bakotika libanga moko té na esika na yango; pamba té lelo Nzambe ayei kosalisa yo, kasi yo ondimi té.”
[45] Yezu akoti na Ndako ya Nzambe pe abandi kobengana bato oyo bazalaki kotekisa biloko kuna.
[46] Alobi na bango: “Ekòmamá boye: ‘Ndako na ngai ezali ndako ya losambo.’ Kasi bino bokómisi yango esika bamiyibi bakutanaka.”
[47] Yezu azalaki koteya mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko pe bato minene ya Bayuda baluki nzela ya koboma ye,
[48] kasi bazwi yango té, pamba té bato bazalaki kaka kokangama na ye po na koyoka.