[1] Sima ya mbula ebele, Nzambe atindi maloba na ye epai ya Yoane, Mwana ya Zakarya, na kati ya esobe. Na tango wana mokonzi monene Tibere akokisi mbula zomi na mitano (15) na bokonzi ya Rome, Ponse Pilate azalaki motambwisi ya rejion ya Yudea; Erode azalaki mokonzi ya Galilé; ndeko na ye Filipe azalaki mokonzi ya Ituré pe ya Trakonite; Lizanias azalaki mokonzi ya Abilene; pe Hana ná Kaife bazalaki banganga-Nzambe minene.
[3] Bongo Yoane abandi kotambola na bapembeni nyonso ya mai ya Yordan. Azalaki kosakola boye: “Bóbongola mitema; bóya nábatisa bino, bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino.”
[4] Ndenge wana Yoane akokisaki makambo ekòmamá na mokanda ya profete Ezaya: “Moto moko azali kobelela na kati ya esobe: ‘Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela. Bósalela ye nzela moko ya kitoko!’
[5] Bakozipa mabulu nyonso ya minene; bakolalisa bangomba nyonso ya mike ná ya milai. Bakobongisa banzela oyo etengamá; bakozipa mabulu ya banzela ya mabe.
[6] Pe moto nyonso akomona ndenge Nzambe abikisaka bato.”
[7] Bato ebele babandaki kokende epai ya Yoane po ábatisa bango. Kasi Yoane azalaki koloba na bango: “Bino banyoka oyo! Nani apesi bino mayele ya kokima kanda ya Nzambe oyo ezali koya?
[8] Bósala makambo oyo ezali kolakisa 'tè bosi'bobongoli mitema! Bótika komiloba bino na bino 'tè: ‘Mabe moko té ekoki kokweela biso, pamba té Abraham azali koko na biso.’ Nalobi na bino: Nzambe akoki kobongola mabanga oyo po ékóma bana ya Abraham.
[9] Basi'babongisi epasola po na kokata misisa ya banzete. Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu té, bakokata yango pe bakobwaka yango na móto.”
[10] Bato batuni ye: “Bongo, tósala nini?”
[11] Yoane azongiseli bango: “Oyo azali na shemize mibale, ápesa moko na moninga oyo azangi yango. Oyo azali na bilei, ákabela bato mosusu.”
[12] Bafutisi-mpaku pe bayaki po Yoane ábatisa bango, bongo batuni ye: “Moteyi, tósala nini?”
[13] Yoane azongiseli bango: “Bófutisa bato se mpaku oyo batindi bino.”
[14] Basoda pe batuni ye: “Bongo biso tósala nini?” Yoane alobi na bango: “Bónyokola moto moko té, pe bókosela bato makambo té; bómeka kozwa mbongo mosusu té na likolo ya lifuta na bino.”
[15] Bato nyonso bazalaki kozela 'tè likambo monene ekoya; bazalaki kotia mitema na Yoane, pe babandaki komituna soki ye azali Mesia.
[16] Bongo Yoane alobi na bango nyonso: “Ngai nazali kobatisa bino na mai pamba, kasi moto oyo aleki ngai na nguya, akoya sima na ngai; nakoki kutu té kofungola basinga ya basandale na ye. Ye akobatisa bino na Molimo Mosantu pe na móto.
[17] Asimbi kiyungulu po na koyungula matiti oyo esangani na mbuma ya blé; akobomba mbuma kasi akotumba matiti na móto oyo ekufaka té.”
[18] Yoane azalaki koloba makambo mingi mosusu po na kopesa bato molende, pe azalaki koteya bango Sango Malamu.
[19] Apesi pe mokonzi Erode toli, po abalaki Erodiade, mwasi ya kulutu na ye Filipe, pe po na mabe mosusu oyo asalaki.
[20] Kasi Erode asali lisusu likambo moko ya mabe: atie Yoane na boloko.
[21] Awa Yoane asilisi kobatisa bato nyonso, abatisi pe Yezu. Tango Yezu azalaki kosambela, Likolo efungwami,
[22] bongo Molimo Mosantu amonanaki lokola pijon pe akiteli ye. Mongongo moko euti na Likolo elobi: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nasepeli na yo mingi.”
[23] Yezu azalaki na mbula penepene ya tuku misato (30) tango abandaki mosala na ye. Bato babandaki kokanisa 'tè azali Mwana ya Jozef. Jozef azalaki mwana ya Eli
[24] pe koko ya Matat. Bakoko na ye kobanda Matat ezalaki: Levi, Melki, Yanai, Jozef,
[25] Matatias, Amos, Nahum, Esli, Nagai,
[26] Maat, Matatias, Semei, Yozek, Yoda,
[27] Yoanan, Reza, Zorobabel, Shaltiel, Neri,
[28] Melki, Adi, Kosam, Elmadam, Er,
[29] Yezu, Eliezer, Yorim, Matat, Levi,
[30] Simeon, Yuda, Jozef, Yonam, Eliakim,
[31] Melea, Mena, Matata, Natan, David,
[32] Jesé, Yobed, Booz, Sala, Nashon,
[33] Aminadab, Admin, Arni, Hesron, Peres, Yuda,
[34] Jakob, Izaak, Abraham, Tera, Nahor,
[35] Serug, Reu, Peleg, Eber, Shela,
[36] Kainam, Arpakshad, Sem, Noé, Lamek,
[37] Metushela, Henok, Yared, Malelel, Kenan,
[38] Enosh, Set, Adamu; Adamu nde autaki na Nzambe.