[1] Mokolo moko ya Kopema, Yezu ná bayekoli na ye bazalaki koleka na bilanga ya blé, bongo bayekoli na ye babandi kobuka bambuma ya blé, baniki yango na maboko po na kobimisa mbuma pe balei yango.
[2] Ba-Farizé mosusu batuni: “Po na nini bozali kosala makambo epekisamá na Mokolo ya Kopema?”
[3] Yezu azongiseli bango: “Botangi nanu té makambo David asalaká tango ye ná bato na ye bayokaki nzala?
[4] Akotaki na Ndako ya Nzambe, akamati mapa oyo batielaki Nzambe, alei yango pe apesi bato na ye. Nzokande kaka banganga-Nzambe bato bakoki kolia yango.”
[5] Bongo Yezu asukisi boye: “Mwana ya Moto azali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema.”
[6] Na Mokolo mosusu ya Kopema Yezu akoti na ndako ya lisanga pe abandi koteya. Moto moko azalaki kuna, liboko na ye ya mobali ekufá.
[7] Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé bazalaki kotala Yezu na mayele soki akoki kobikisa moto na Mokolo ya Kopema, po bázwa nzela ya kofunda ye.
[8] Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, bongo alobi na moto oyo azalaki na liboko ekufá: “Telema, yaka awa liboso ya bato nyonso.” Moto yango pe akei kotelema.
[9] Na sima Yezu atuni bato: “Na Mokolo ya Kopema, mibeko na biso epesaka nzela ya kosala malamu to té? Etindaka bato bábikisa moto to bábebisa bomoi na ye?”
[10] Yezu atali bango nyonso, bongo alobi na moto wana: “Tanda liboko na yo!” Ye atandi yango pe liboko na ye ekómi malamu.
[11] Kasi bango basilikaki penza pe babandi koluka bango na bango likambo nini bakoki kosala Yezu.
[12] Na tango wana, Yezu akei na ngomba moko po na kosambela Nzambe; atikalaki kuna kosambela butu mobimba.
[13] Tango tongo etani, abengi bayekoli na ye pe aponi bato zomi na mibale; apesi bango kombo: bantoma.
[14] Ezalaki: Simon (oyo ye apesi kombo: Piere) ná ndeko na ye André; Jake ná Yoane; Filipe pe Bartelemi,
[15] Matié, Toma ná Jake Mwana ya Alfé, pe Simon oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda;
[16] Yudas mwana ya Jake pe Yudas Iskariot, oyo atekaki Yezu.
[17] Yezu akiti ngomba ná bantoma wana, pe atelemi na esika moko ya polele. Bayekoli na ye ebele bazalaki wana, ná bato mingi bautaki na rejion ya Yudea mobimba, na Yeruzalem pe na bamboka oyo ezali na bipai ya Tir ná Sidon, penepene ya ebale monene.
[18] Bayaki po na koyoka Yezu, pe po na kosenga ye ábikisa bato bazali na maladi. Bato oyo milimo mabe ezalaki konyokola, bango pe babikaki.
[19] Bato nyonso bazalaki koluka nzela ya kosimba ye, po nguya ezalaki kobima na nzoto na ye pe kobikisa bango nyonso.
[20] Yezu atali bayekoli na ye, pe alobi na bango: “Esengo na bino bato bokelelá: pamba té bozali bato ya bokonzi ya Nzambe.
[21] Esengo na bino bato bozali na nzala sik'oyo: Nzambe akotondisa bino na bilei. Esengo na bino bato bozali kolela sik'oyo: pamba té mokolo ezali bokoseka!
[22] “Esengo na bino soki bayinaka bino, soki babenganaka bino, soki bafingaka bino pe baboyaka koyoka kombo na bino likolo ya Mwana ya Moto!
[23] Bósepela pe bózala na esengo mokolo makambo wana ekoya, pamba té lifuta monene ezali kozela bino na Likolo. Bóyeba 'tè bakoko na bango bazalaká konyokola baprofete kaka ndenge wana.
[24] “Kasi mawa na bino bato ya mbongo: bosi'bozwi bomengo na bino.
[25] “Mawa na bino bato bozali kotonda sik'oyo: mokolo ezali bokokufa nzala. Mawa na bino bato bozali koseka sik'oyo: mokolo ezali bokolela pe bokosala matanga.
[26] “Mawa na bino soki bato nyonso bakumisaka bino: boyeba 'tè bakoko na bango bazalaká kokumisa baprofete ya lokuta kaka ndenge moko.”
[27] “Kasi ngai nalobi na bino bato bozali koyoka ngai: Bólinga banguna na bino: bósala malamu na bato oyo bazali koyina bino;
[28] bósenga Nzambe ábenisa bato oyo bazali kofinga bino; pe bóbondela ye po na bato oyo bazali konyokola bino.
[29] Soki moto abeti yo mbata na litama, pesa ye litama mosusu; soki akamati kazaka na yo, tikela ye pe shemize na yo.
[30] Soki moto asengi yo eloko, pesa ye; pe soki moto akamati biloko na yo na makasi, kotungisa ye té po ázongisa yango.
[31] Makambo oyo bolingaka 'tè bato básala bino, bino pe bósalaka yango na bato mosusu.
[32] “Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, bokanisi 'tè Nzambe amonaka yango likambo monene? Pamba té ata bato ya masumu pe balingaka bato oyo bazali kolinga bango.
[33] Pe soki bosalaka malamu kaka na bato oyo bazali kosala bino malamu, bokanisi 'tè Nzambe amonaka yango likambo monene? Pamba té ata bato ya masumu basalaka kaka ndenge wana.
[34] Soki bodefisaka mbongo kaka na bato oyo bino botie mitema 'tè bakofuta nyongo, bokanisi 'tè Nzambe amonaka yango likambo monene? Pamba té ata bato ya masumu pe badefisaka na bato ya masumu, po bázwa mbongo oyo badefisaki.
[35] Kasi bino, bólingaka banguna na bino, bósalaka bango bolamu; pe bódefisaka bango, ata bokanisi 'tè bakofuta nyongo té. Bongo bokozwa lifuta monene, pe bokozala bana ya Nzambe ya Likolo, pamba té ye azali malamu epai ya bato ya mabe ná baoyo bandimaka ye té.
[36] Bóyokelaka bato mawa, ndenge Tata na bino ayokelaka bango mawa.”
[37] “Bótala bizaleli ya bato té; soki té Nzambe pe akotala bizaleli na bino. Bóloba té 'tè: ‘Bato oyo bazali mabe'; soki té Nzambe pe akoloba 'tè bino bozali mabe. Bólimbisa bato, boye Nzambe pe akolimbisa bino.
[38] Bókabela bato po Nzambe pe ákabela bino: akotia na basaki na bino biloko mingi penza, akofina pe akoningisa yango po étonda meke. Nzambe akokabela bino se ndenge bino pe bokabelaka bato mosusu.”
[39] Yezu apesi bango ndakisa, alobi: “Moto akufá miso akoki kolakisa nzela té na moto mosusu akufá miso. Soki asali yango, bango mibale bakokweya na libulu. Boye té?
[40] Moyekoli aleki molakisi na ye té; kasi soki moyekoli asimbi malamu mateya ya molakisi, akokokana na ye.
[41] “Po na nini ozali kotala mwa-lititi oyo ekoti na liso ya ndeko na yo? Nzokande ozali na nzete na liso na yo moko, kasi ozali komona yango té.
[42] Ozali koloba na ndeko na yo: ‘Ndeko, tika nálongola mwa-lititi oyo ekoti yo na liso.’ Ndenge nini okoki koloba bongo? Na liso na yo moko nzete ezali, kasi ozali kotala yango pamba! Moto ya lokuta! Longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu po na kolongola mwa-lititi oyo ekoti na liso ya ndeko na yo.”
[43] “Nzete ya malamu ebotaka mbuma ya mabe té, pe nzete ya mabe ebotaka mbuma ya malamu té.
[44] Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango; babukaka mbuma ya figi na banzete ya nzube té, pe balongolaka mbuma ya vinu na banzete ya basende té.
[45] Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ezali na motema na ye; moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ezali na motema na ye. Pamba té moto nyonso abimisaka na monoko makambo oyo etondi na motema na ye.”
[46] “Po na nini bozali kobenga ngai ‘Mokonzi, Mokonzi’, kasi botosaka maloba na ngai té?
[47] Moto nyonso oyo ayei epai na ngai pe ayoki maloba na ngai bongo akómi kotosa yango, akokani na nani? Nakoyebisa bino!
[48] Akokani ná moto moko oyo atòngaki ndako: atimolaki libulu ya molai tii akutaki mabanga, bongo abandaki kotònga. Na tango ya mbula, mai etondi, ebeti na ndako wana, kasi eningisi yango té, pamba té batòngaki yango malamu.
[49] Kasi moto oyo ayoki maloba na ngai bongo atosi yango té, akokani ná moto mosusu oyo atòngaki ndako na ye likolo ya mabanga té. Tango mai etondi pe ebeti na ndako wana, yango ekwei na mbala moko pe nyonso epanzani.”