[1] Na ebandeli, liboso 'tè Nzambe ásala Likolo ná se, Liloba azalaká. Liloba azalaká ná Nzambe. Liloba azalaká Nzambe.
[2] Ya solo, na ebandeli, ye azalaká esika moko ná Nzambe.
[3] Nzambe asalaká biloko nyonso ná ye, eloko moko té ezangi kosalama na ye.
[4] Bomoi nyonso eutaká nde na ye; pe yango ezalaká moi po na bato.
[5] Moi yango ezali kongenga na kati ya molili; molili ekokaki kozipa yango té.
[6] Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye Yoane.
[7] Ye ayaki kosakola sango ya moi, po bato nyonso bándima.
[8] Ye azalaki moi té, kasi ayaki nde po ásakola sango ya moi.
[9] Moi yango ezalaki moi ya solo; eyaki awa na mokili; ezali kongengela moto nyonso.
[10] Liloba azalaki awa na mokili; na ye Nzambe asalaká mokili; kasi bato ya mokili bayebaki ye té.
[11] Ayaki na mboka na ye moko, kasi bato na ye bayambaki ye té.
[12] Kasi bato mosusu bayambaki ye, pe bandimelaki ye; apesaki bango bokonzi ya kokóma bana ya Nzambe.
[13] Bakómaki bana ya Nzambe na ndenge ya bomoto té, ndenge batata babotaka bana; kasi bakómaki bana ya Nzambe po Nzambe moto abotaki bango.
[14] Liloba ya Nzambe ekómaki moto. Moto yango ayaki kofanda na kati na biso; tomonaki lokumu na ye, lokumu oyo Tata apesi bobele na Mwana na ye se moko. Ye atondaki na bolamu pe na makambo ya solo ya Nzambe.
[15] Yoane abandaki kosakola po na ye; ayebisaki bato polele: “Ye oyo moto nalobaki na bino 'tè: Moto akoya sima na ngai, aleki ngai, pamba té azalaká tango ngai nanu nabotami té.”
[16] Ye atondá na bomengo nyonso; pe biso nyonso tozwi bolamu mingi penza epai na ye.
[17] Pamba té Nzambe apesaká bato Mibeko na maboko ya Moize; kasi Yezu Kristo ayeeli biso bolamu pe makambo ya solo ya Nzambe.
[18] Moto moko té nanu amoná Nzambe, kaka Mwana na ye se moko, oyo azali Nzambe pe azali esika moko ná Tata, ye nde moto ayebisi biso ndenge Nzambe azali.
[19] Mokolo moko bakonzi ya Bayuda oyo bazalaka na Yeruzalem batindi banganga-Nzambe ná ba-Levite, po bákende kotuna Yoane boye: “Yo ozali nani?”
[20] Ye aboyaki kozongisela bango eyano té, kasi alobaki polele liboso ya bato nyonso: “Ngai nazali Mesia té.”
[21] Bango batuni ye: “Bongo ozali nani? Ozali Eliya?” Yoane azongiseli bango: “Té, nazali Eliya té.” Bango batuni ye: “Ozali Profete oyo tozali kozela?” Azongiseli bango: “Té.”
[22] Batuni ye lisusu: “Yo ozali nani? Po tókende koyebisa na bato oyo batindi biso. Olobi nini po na yo moko?”
[23] Yoane azongiseli bango: “Ngai nazali moto moko oyo profete Ezaya alobaká: ‘Mongongo ya moto moko ezali kobelela na kati ya esobe boye: Bóbongisa nzela po na Mokonzi.’”
[24] Na kati ya bato oyo Bayuda batindaki epai ya Yoane, ba-Farizé pe bazalaki wana.
[25] Batuni Yoane: “Bongo soki yo ozali Mesia té, Eliya té, Profete pe té, kasi ndenge nini ozali kobatisa bato?”
[26] Yoane azongiseli bango: “Ngai nazali kobatisa bobele na mai; nzokande moto moko azali na kati na bino, bino boyebi ye té.
[27] Ye akoya sima na ngai, kasi nakoki kutu té kofungola ata singa ya sandale na ye.”
[28] Makambo oyo nyonso elekaki na Betanie, na ngambo ya mai ya Yordan, na esika Yoane azalaki kobatisa bato.
[29] Sima ya mokolo wana, Yoane amoni Yezu azali koya epai na ye, pe alobi: “Tala Mwana-Meme ya Nzambe oyo alongolaka masumu ya bato.
[30] Ezali nde ye, moto oyo nalobaki na bino: ‘Moto akoya sima na ngai, aleki ngai, pamba té azalaká tango ngai nanu nabotami té.’
[31] Ngai pe nayebaki penza té soki ye azali nani; kasi nabandaki kobatisa bato na mai, po ye áya komilakisa na ekolo ya Israel.”
[32] Yoane alobi lisusu: “Namonaki Molimo auti na Likolo lokola pijon, pe ayei kofanda na motú na ye.
[33] Ngai nayebaki penza té soki ye azali nani, kasi Nzambe oyo atindaki ngai po nábatisa bato na mai, alobaki na ngai: ‘Okomona Molimo akouta na Likolo pe akofanda na moto moko; ezali nde ye wana moto akobatisa bato na Molimo Mosantu.’
[34] Namonaki nyonso wana, pe nazali koyebisa bino 'tè azali Mwana ya Nzambe.”
[35] Sima ya mokolo wana, Yoane azalaki lisusu na esika yango, ná bayekoli na ye mibale.
[36] Awa amoni Yezu azali koleka, alobi: “Tala Mwana-Meme ya Nzambe!”
[37] Tango bayekoli na ye wana mibale bayoki boye, batiki Yoane pe balandi Yezu.
[38] Yezu abaluki, amoni bango bazali kolanda ye, pe atuni bango: “Bozali koluka nini?” Bazongisi: “Rabi, ofandaka wapi?” (Rabi elingi koloba Moteyi).
[39] Ye azongiseli bango: “Bóya pe bokomona.” Bakei pe bamoni esika ye azalaki kofanda, bongo batikalaki na ye mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei ya pokwa.
[40] André, ndeko ya Simon Piere, azalaki moko na kati ya bato mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane pe balandaki Yezu.
[41] Sima André akutanaki liboso ná ndeko na ye Simon, pe alobi na ye: “Tosi'tomoni Mesia” (elingi koloba: Kristo).
[42] Bongo André amemi ndeko na ye epai ya Yezu. Tango Yezu amoni Simon alobi na ye: “Ozali Simon, Mwana ya Yoane. Kombo na yo ekómi Sefas” (to pe Piere: elingi koloba, Libanga).
[43] Sima ya mokolo wana, Yezu alingaki kokende na rejion ya Galilé; akutani ná Filipe pe alobi na ye: “Landa ngai.”
[44] Filipe azalaki moto ya mboka Betsaida, mboka moko ná André pe Piere.
[45] Na sima Filipe pe akutani ná Natanael, alobi na ye: “Tosi'tomoni moto oyo bakòmá na Mibeko ya Moize pe na mikanda ya baprofete. Ezali nde Yezu, mwana ya Jozef, ya mboka Nazaret.”
[46] Natanael alobi na ye: “Eloko nini ya malamu ekoki kobima na Nazaret?” Filipe azongiseli ye: “Yaka kotala.”
[47] Tango Yezu amoni Natanael azali koya epai na ye, alobi na ye: “Tala moto ya solo ya Israel, lokuta ezali epai na ye té.”
[48] Natanael atuni ye: “Ndenge nini oyebi ngai?” Yezu azongiseli ye: “Liboso 'tè Filipe ábenga yo, namonaki yo tango ozalaki na se ya nzete ya figi.”
[49] Natanael alobi na ye: “Moteyi, ozali Mwana ya Nzambe; ozali Mokonzi ya Israel!”
[50] Yezu alobi na ye: “Ondimi po nalobi na yo 'tè namonaki yo tango ozalaki na se ya nzete ya figi. Okomona makambo eleki oyo na monene.”
[51] Yezu alobi na bango lisusu: “Nalobi na bino, ya solo: bokomona Likolo ekofungwama, pe ba-anjelu bakobanda kokita pe komata; pamba té Nzambe akozala kotinda bango lokola bantoma epai ya Mwana ya Moto.”