Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:47

[1] Mokolo moko bafutisi-mpaku ná bato ya masumu bayaki bango nyonso epai ya Yezu po na koyoka ye.

[2] Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko bakómaki koyimayima pe balobi: “Moto oyo azali koyamba bato ya masumu, pe azali kolia ná bango esika moko!”

[3] Bongo Yezu apesi bango ndakisa oyo:

[4] “Soki moto moko na kati na bino azali na bameme kama moko (100), pe soki abungisi meme moko, akosala nini? Akotika bameme na ye tuku libwa na libwa (99) na esobe, pe akokende koluka meme oyo ebungi, tii akozwa yango.

[5] Soki amoni yango akoyoka esengo mingi, akotia meme yango na mapeka,

[6] pe akozonga na mboka na ye. Na sima akobenga baninga ná bato oyo bafandaka na ye penepene, bongo akoloba na bango: ‘Bóya tósepela, po namoni meme na ngai oyo ebungaki.’

[7] Nalobi na bino, na mboka ya Nzambe pe ekozala ndenge moko: soki moto moko kaka abongoli motema, bakoyoka esengo mingi, koleka esengo oyo bazali koyoka po na bato ya malamu tuku libwa na libwa (99) oyo bazali na posa ya kobongola mitema té.”

[8] “Pe lisusu, soki mwasi moko azali na mbongo zomi ya bibende ya arjan, pe abungisi moko, akosala nini? Akopelisa mwinda, akokomba ndako pe akoluka yango malamu tii akomona yango.

[9] Tango akozwa yango, akobenga baninga ná basi oyo bafandaka na ye penepene, bongo akoloba na bango: ‘Bóya tósepela, po namoni mbongo na ngai oyo ebungaki.’

[10] Nalobi na bino: ndenge moko pe ba-anjelu ya Nzambe bakosepela mingi po na moto ya masumu moko abongoli motema.”

[11] Yezu alobi lisusu: “Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali.

[12] Mwana ya leki alobi na tata na ye: ‘Tata, kabola bomengo na yo, pesa ngai oyo ya ngai ndambo.’ Bongo tata wana akaboli bomengo na ye na bana na ye mibale.

[13] Mwana ya leki, awa azwi oyo ya ye ndambo, ateki yango, pe sima ya mwa-mikolo akei na mboka moko ya mosika. Kuna asali mobulu, pe abebisi mbongo na ye nyonso.

[14] Tango atikalaki maboko pamba, nzala mingi ekoti na mboka wana, pe abandi kokelela.

[15] Akei koluka mosala epai ya moto moko ya mboka yango, pe ye atindi ye na esobe po na kokengela bangulu.

[16] Azalaki na posa kutu ya kolia bambuma oyo bangulu ezalaki kolia, kasi moto moko té apesi ye yango.

[17] Bongo abandi kokanisa pe amilobi: ‘Basali nyonso ya tata na ngai bazali kolia ndenge balingi, kasi ngai awa nazali kokufa na nzala.

[18] Nakozonga epai ya tata na ngai pe nakoloba na ye: Tata, nasalaki mabe na miso ya Nzambe pe na miso na yo.

[19] Kozwa ngai lisusu lokola Mwana na yo té, kasi kamata ngai lokola moto na yo ya mosala.’

[20] Bongo asimbi nzela pe azongi epai ya tata na ye. “Tango azalaki nanu mosika, tata na ye amoni ye pe ayoki mawa mingi penza, bongo akei mbangu koyamba ye.

[21] Mwana alobi na ye: ‘Tata, nasalaki mabe na miso ya Nzambe pe na miso na yo. Kozwa ngai lisusu lokola mwana na yo té.’

[22] Kasi tata na ye alobi na basali na ye boye: ‘Bómema noki bilamba oyo eleki kitoko, bólatisa ye yango. Bótia ye pete na mosapi pe bólatisa ye sapatu.

[23] Bómema mwana-ngombe ya mafuta, bóboma yango; tólia pe tósala feti.

[24] Pamba té mwana na ngai oyo akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki pe tala, amonani lisusu.’ Bongo babandi feti moko ya kafukafu.

[25] “Na tango wana mwana ya kulutu azalaki na bilanga azongi pe akómi penepene ya ndako, ayoki makelele ya bato bazali kobeta miziki pe kobina.

[26] Abengi mosali moko pe atuni ye: ‘Likambo nini na ndako?’

[27] Mosali wana azongiseli ye: ‘Leki na yo azongi, bongo tata na yo abomisi mwana-ngombe ya mafuta, po amoni ye lisusu na nzoto makasi.’

[28] Kasi kulutu, awa ayoki boye, asiliki pe aboyi kokota na ndako, bongo tata na ye abimi po na kobondela ye.

[29] Kasi azongiseli tata na ye boye: ‘Tata, ngai nasaleli yo mbula ebele. Ata mokolo moko té naboyá kotosa maloba na yo. Kasi mokolo moko té opesá ngai ata mwana-taba pamba, po nália pe násepela ná baninga na ngai.

[30] Nzokande mwana na yo wana abebisi bomengo na yo nyonso na basi ya ndumba. Pe lokola ye azongi, obomeli ye mwana-ngombe ya mafuta.’

[31] Tata alobi na ye: ‘Mwana na ngai, yo ozalaka tango nyonso ná ngai. Biloko na ngai nyonso ezali pe ya yo.

[32] Bongo tosengeli kosala feti pe kosepela po leki na yo akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, pe tala, amonani lisusu.’”

Luka — Chapters