[1] Yezu atondi na Molimo Mosantu, alongwe na mai ya Yordan; pe Molimo amemi ye na esobe.
[2] Kuna zabolo ameki ye mikolo tuku minei. Mikolo nyonso wana Yezu aliaki té, sima na yango ayoki nzala.
[3] Bongo zabolo alobi na ye: “Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na libanga oyo ébongwana lipa.”
[4] Yezu azongiseli ye: “Ekòmamá na Mikanda: Moto akoki kobikela kaka na mapa té.”
[5] Bongo zabolo amemi ye na esika moko na likolo, pe alakisi ye bamboka nyonso ya mokili.
[6] Alobi na ye: “Nakopesa yo bokonzi ya mokili mobimba pe lokumu na yango; pamba té bapesi yango na maboko na ngai, pe nakoki kopesa yango na moto oyo ngai nalingi.
[7] Bongo soki ofukameli ngai, nyonso wana ekokóma ya yo.”
[8] Yezu azongiseli ye: “Ekòmamá na Mikanda: Fukamela Nkolo, Nzambe na yo, pe salela bobele ye.”
[9] Na sima zabolo amemi ye na Yeruzalem. Atie ye na likolo ya Ndako ya Nzambe na songe, pe alobi na ye: “Soki ozali Mwana ya Nzambe, ómibwaka na se,
[10] pamba té ekòmamá na Mikanda: ‘Nzambe akotinda ba-anjelu na ye po bábatela yo.’
[11] Pe lisusu: ‘Bakomema yo na maboko na bango, po likolò na yo étuta na libanga té.’”
[12] Yezu azongiseli ye: “Ekòmamá na Mikanda: Komeka Nkolo Nzambe na yo té.”
[13] Awa zabolo asilisi komeka Yezu na ndenge nyonso, atiki ye po na tango moke akoya komeka ye lisusu.
[14] Bongo Yezu azongi na Galilé, atondi na nguya ya Molimo Mosantu. Sango na ye etamboli bipai nyonso na mboka wana.
[15] Azalaki koteya na bandako ya lisanga, pe bato nyonso bazalaki kokumisa ye.
[16] Yezu akendeki na Nazaret epai ye akolaki. Na Mokolo ya Kopema akoti na ndako ya lisanga ndenge amesaná. Atelemi po na kotanga Mikanda ya Nzambe.
[17] Bongo bapesi ye mokanda ya profete Ezaya. Afungoli yango pe azwi esika oyo bakòmá boye:
[18] “Molimo ya Nkolo akiteli ngai; Nkolo aponi ngai po námema Sango Malamu epai ya bato bakelelá. Atindi ngai náyebisa na bato ya boloko 'tè bakobimisa bango, pe na bato bakufá miso 'tè bakomona lisusu; násilisa pasi ya bato bazali konyokwama,
[19] pe násakola 'tè: tango ekoki, oyo Nkolo alingi kolakisa bolamu na ye.”
[20] Na sima Yezu akangi mokanda wana, azongisi yango na mosali ya ndako ya lisanga pe afandi; bato nyonso bazalaki na kati ya ndako ya lisanga batali ye nyee.
[21] Bongo Yezu abandi koloba na bango boye: “Nzambe akokisi makambo oyo lelo, bobele na tango nazalaki kotangela bino yango.”
[22] Bango nyonso bazalaki kokumisa ye, pe bakamwaki po na maloba ya bolamu oyo ye alobaki. Bamituni: “Oyo Mwana ya Jozef té?”
[23] Yezu alobi na bango: “Nayebi malamu bokoloba na ngai 'tè: ‘Monganga, ómibikisa yo moko. Makambo nyonso oyo yo osalaki na Kafarnaum, sala yango pe awa, na mboka na yo.’”
[24] Yezu alobi lisusu: “Nalobi na bino, ya solo, bandimaka profete té na mboka na ye moko.
[25] Nalobi na bino: bókanisa nanu mikolo ya profete Eliya, tango mbula ezalaki konoka té mbula misato na sanza motoba, pe nzala mingi ezalaki na ekolo mobimba. Na tango wana basi bakufelá mibali bazalaki mingi na Israel;
[26] nzokande Nzambe atindaki Eliya kaka epai ya mwasi moko akufelá mobali, na vile ya Sarepta, na mboka Sidon.
[27] Pe na tango ya profete Elizé, bato ya maladi ya maba bazalaki mingi na Israel; nzokande ata moto moko té na kati na bango abikaki, bobele Naaman, moto ya mboka Sirie.”
[28] Awa bayoki makambo wana, bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya lisanga basiliki.
[29] Batelemi pe babimisi Yezu na Nazaret, bongo bamemi ye na songe ya ngomba esika batòngá vile na bango, po na kobwaka ye na se.
[30] Kasi ye aleki na kati na bango pe akei na ye.
[31] Yezu akendeki na Kafarnaum, vile ya Galilé, pe azalaki koteya bato na Mokolo ya Kopema.
[32] Bato bakamwaki mingi na ndenge azalaki koteya; pamba té azalaki koteya lokola moto azali na bokonzi.
[33] Moto moko ya molimo mabe azalaki na kati ya ndako ya lisanga, pe abandi koganga makasi:
[34] “A! Yezu ya Nazaret, biso ná yo likambo nini? Oyei po na koboma biso? Nayebi yo malamu! Ozali Mosantu oyo Nzambe atindi!”
[35] Yezu agangeli molimo wana, alobi: “Fanda nyee! Bima na nzoto ya moto oyo!” Molimo mabe ekweisi moto wana na mabelé liboso ya bato nyonso, pe ebimi kaka, kasi esali ye ata likambo moko té ya mabe.
[36] Bato nyonso bakamwe mingi penza, pe balobi bango na bango: “Ndenge nini maloba na ye ezali na nguya boye? Moto oyo azali na bokonzi ya kotinda milimo mabe, bongo yango ezali kobima!”
[37] Boye sango ya Yezu epanzanaki bipai nyonso na mboka yango mobimba.
[38] Yezu abimi na ndako ya lisanga pe akei na ndako ya Simon. Mama ya mwasi ya Simon azalaki kobela fievre moko ya makasi, bongo babondeli Yezu po ábikisa ye.
[39] Yezu agumbami penepene na ye, pe alobi na mongongo makasi 'tè fievre ésila. Fievre esili, bongo mwasi atelemi pe abandi kosalela bango.
[40] Tango butu ebandi koya, bato nyonso bamemeli Yezu bato na bango oyo bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge; Yezu atie moko moko na bango maboko, pe abikisi bango nyonso.
[41] Bongo milimo mabe ebimaki na bato ya maladi mingi, pe ezalaki koganga: “Yo ozali Mwana ya Nzambe!” Kasi Yezu azalaki kopekisa yango éloba té, po yango eyebaki 'tè ye azali Mesia.
[42] Awa tongo etani, Yezu alongwe na Kafarnaum pe akei na esika moko ya kimia na esobe. Bongo bato ebele babandi koluka ye. Tango bamoni ye bameki kopekisa ye po álongwa epai na bango té.
[43] Kasi Yezu alobi na bango: “Nasengeli pe kosakola na bamboka mosusu Sango Malamu 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye; pamba té ye atindi ngai po na yango.”
[44] Bongo Yezu abandi kosakola bipai nyonso na bandako ya lisanga, na mboka mobimba.