[1] Mokolo moko ya Kopema Yezu akei na ndako ya mokonzi moko ya ba-Farizé po na kolia. Ba-Farizé bazalaki kotala ye na mayele.
[2] Moto moko ayei kotelema liboso na ye, azalaki na maladi evimbisaka nzoto.
[3] Yezu atuni boye na balakisi-Mibeko pe na ba-Farizé: “Mibeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na Mokolo ya Kopema to té?”
[4] Kasi bango bafandi nyee. Bongo Yezu asimbi moto wana, abikisi ye pe atiki ye ákende.
[5] Na sima alobi na bango: “Soki Mwana to ngombe ya moko na bino akwei na libulu ya mai, ye akosala nini? Akokende kobimisa ye noki, ata ezali Mokolo ya Kopema. Boye té?”
[6] Kasi bakokaki kopesa ye eyano té na motuna wana.
[7] Yezu amoni 'tè bato oyo Farizé wana abengisaki bakómi kopona bisika ya lokumu, akamati yango lokola ndakisa pe apesi bango toli boye:
[8] “Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende kofanda na esika ya liboso té. Pamba té tango mosusu babengisi pe moto moko oyo aleki yo na lokumu.
[9] Soki bongo, kolo ya feti akoya koloba na yo: ‘Tikela ye esika wana.’ Boye okoyoka soni pe okokende kofanda na esika ya suka.
[10] Kasi yo, soki babengisi yo na feti, kende kofanda na esika ya suka. Bongo tango kolo ya feti akoya, akoloba na yo: ‘Moninga na ngai, yaka kofanda awa na esika ya liboso.’ Boye okozwa lokumu na miso ya bato oyo bafandi ná yo na mesa.
[11] Ezali bobele ndenge wana po na moto nyonso oyo amikumisaka: Nzambe akitisaka ye; pe oyo nyonso amikitisaka, Nzambe akumisaka ye.”
[12] Na sima Yezu alobi na moto oyo abengisaki ye: “Soki osalisi feti, kobengisa baninga na yo té, ézala bandeko na yo, to bato ya libota na yo, to pe bato ya mbongo oyo bafandaka penepene na yo. Pamba té soki osali bongo, mokolo mosusu bango pe bakobengisa yo, pe bakozongisela yo bolamu oyo osalaki bango.
[13] Kasi soki olingi kosalisa feti, bengisa bato bakelelá, ná bato bakufá makolo to maboko, pe bato bakufá miso.
[14] Bongo okozala na esengo, po bango bazali na eloko ya kozongisela yo té. Kaka Nzambe moto akozongisela yo yango, tango akosekwisa bato ya malamu.”
[15] Moto moko na kati ya bato oyo bafandaki na mesa, awa ayoki boye alobi na Yezu: “Esengo mingi na moto oyo akozwa esika na feti oyo Nzambe akosalisa kuna na bokonzi na ye.”
[16] Yezu alobi na ye: “Moto moko alingaki kosalisa feti moko ya monene, pe abengisi bato ebele.
[17] Awa tango ya kolia eyei kokoka, atindi mosali na ye ákende koloba na bato oyo ye abengisaki: ‘Bóya! Nasi'nabongisi biloko nyonso.’
[18] Kasi bango nyonso babandi kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobi na ye: ‘Nauti kosomba elanga moko pe nasengeli kokende kotala yango. Limbisa ngai.’
[19] Mosusu alobi: ‘Nauti kosomba bangombe zomi, pe nakei komeka yango soki ezali makasi. Limbisa ngai.’
[20] Pe mosusu alobi: ‘Nauti kobala kaka mikolo oyo, yango wana nakoki koya té.’
[21] Mosali azongi epai ya mokonzi na ye pe ayebisi ye makambo nyonso; bongo ye asiliki pe alobi na mosali na ye: ‘Kende noki na bawenze pe na babalabala, pe memela ngai bato bakelelá, bato bakufá makolo to maboko, bato bakufá miso, pe bato ya tengutengu.’
[22] Na sima ya mwa-tango moke, mosali ayei pe alobi: ‘Mokonzi, nasali ndenge otindaki ngai, kasi bisika ezali nanu.’
[23] Bongo mokonzi alobi na mosali na ye: ‘Kende na banzela oyo ezali na esobe, pe kotisa bato na makasi, po ndako na ngai étonda.
[24] Nalobi na bino: na kati ya bato oyo nabengisaki liboso, ata moko té akozwa esika na feti na ngai.’”
[25] Bato mingi bazalaki kolanda Yezu. Ye abaluki pe alobi na bango:
[26] “Moto oyo alingi koya epai na ngai akoki kozala moyekoli na ngai té, soki azali kolinga liboso tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, to pe bandeko na ye, ézala ata bomoi na ye moko.
[27] Moto oyo aboyi komema kuruze na ye pe kolanda ngai, akoki kozala moyekoli na ngai té.
[28] “Pamba té na kati na bino, moto oyo alingi kotònga ndako moko ya molai, asalaka nini? Liboso afandaka nanu, pe akanisaka talo ya ndako, po áyeba soki akokoka kosilisa yango.
[29] Soki asali boye té, atako sima ya kotònga fondasion, tango mosusu akokoka kosilisa ndako té; pe bato nyonso oyo bakomona bongo bakobanda koseka ye.
[30] Bakoloba: ‘Moto oyo abandaki kotònga ndako, kasi akoki kosilisa yango té!’
[31] Ndenge moko pe, mokonzi ya mboka oyo azali na basoda 10.000, soki alingi kobunda na mokonzi mosusu oyo azali na basoda 20.000, asalaka nini? Liboso afandaka nanu, pe amitunaka soki akokoka kolonga.
[32] Soki amoni 'tè akokoka té, atindaka bantoma epai ya mokonzi wana tango azali nanu mosika, po báyokana.”
[33] Yezu abakisi: “Bobele ndenge wana pe, moto moko té na kati na bino akoki kokóma moyekoli na ngai, soki atiki bomengo na ye nyonso té.”
[34] “Mungwa ezali eloko ya malamu; kasi soki mungwa ebungisi elengi, ndenge nini bakoki kozongisa elengi na yango?
[35] Ezali lisusu na tina té. Bakoki kutu kotia yango té na matiti ya kopola oyo bato basalelaka bilanga, kasi babwakaka yango na libanda. Moto azali na matoi, áyoka!”