[1] Yezu asangisi bayekoli zomi na mibale, bongo apesi bango bokonzi ya kobengana milimo mabe nyonso, pe ya kobikisa bato ya maladi.
[2] Atindi bango boye: “Bókende kosakola 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye, pe bóbikisa bato bazali na pasi.
[3] Bómema eloko moko té po na mobembo: ézala nzete ya kotambola, liboke, bilei to pe mbongo. Pe moto moko té ámema bashemize mibale.
[4] Soki bayambi bino na ndako moko, bófanda kaka wana tii tango bokolongwa na mboka yango.
[5] Bongo soki bato ya mboka moko baboyi koyamba bino, bólongwa kuna noki. Po na kolakisa bango 'tè basali mabe, bópupola makolo po bómema pusiere ya mboka yango epai mosusu té.”
[6] Bongo bayekoli bakei, bazalaki kotambola na bamboka nyonso, kosakola Sango Malamu pe kobikisa bato ya maladi bipai na bipai.
[7] Na tango wana mokonzi Erode ayoki makambo nyonso oyo ezalaki koleka. Mayele esili ye, po bato mosusu bazalaki koloba: “Yoane Mobatisi asekwi.”
[8] Bamosusu bazalaki koloba: “Ezali Eliya moto azongi.” Pe bamosusu: “Moko na kati ya baprofete ya kala asekwi.”
[9] Kasi Erode alobi: “Ngai nakataki Yoane Mobatisi motú; bongo moto oyo nazali koyoka na sango, ezali nani?” Yango wana Erode azalaki koluka komona Yezu.
[10] Bantoma bazongi, balobeli Yezu makambo nyonso basalaki. Bongo ye akamati bango pe akei kaka ná bango moko na mboka Betsaida.
[11] Kasi awa bato bayoki bongo, balandi ye. Yezu ayambi bango, alobeli bango sango ya bokonzi ya Nzambe, pe abikisi bato oyo bazalaki na maladi.
[12] Tango pokwa ebandi kokóma, bayekoli zomi na mibale bayei penepene ya Yezu pe balobi na ye: “Yebisa bato bákende na bamboka ya pembeni pe epai ya bato basalaka bilanga, po báluka bilei pe bisika ya kolala; pamba té awa tozali na kati ya esobe.”
[13] Kasi Yezu alobi na bango: “Bino moko bópesa bango biloko ya kolia.” Bayekoli bazongisi: “Tozali kaka na mapa mitano ná bambisi mibale. Olingi tókende kosomba bilei po na bato oyo nyonso?”
[14] Pamba té bato bazalaki mibali penepene ya 5.000. Yezu alobi na bayekoli na ye: “Bófandisa bato, bótia na molongo moko moko bato tuku mitano (50).”
[15] Bayekoli basali se bongo, pe bafandisi bato nyonso.
[16] Yezu akamati mapa mitano yango ná bambisi mibale, atali na likolo, apesi Nzambe mersi; akatikati mapa pe apesi yango na bayekoli na ye po bákabola na bato.
[17] Bato nyonso balei pe batondi. Bayekoli balokoti biteni oyo etikalaki, batondisi bitunga zomi na mibale.
[18] Mokolo moko Yezu azalaki kosambela ye moko, bongo bayekoli na ye bayei kokuta ye. Ye atuni bango: “Bato balobaka 'tè ngai nazali nani?”
[19] Bango bazongisi: “Bato mosusu balobaka 'tè ozali Yoane Mobatisi; bamosusu: Eliya; pe bamosusu balobaka 'tè ozali moko ya baprofete ya kala oyo asekwi.”
[20] Kasi Yezu atuni bango: “Bongo bino bokanisi 'tè nazali nani?” Piere azongisi: “Ozali Mesia oyo Nzambe atindeli biso.”
[21] Yezu apekisi bango 'tè báloba yango na moto té.
[22] Na sima Yezu alobi lisusu: “Mwana ya Moto asengeli koyoka pasi mingi. Bakoboya ye na bambuta-muntu, na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na balakisi-Mibeko. Bakoboma ye, kasi na mikolo misato akosekwa.”
[23] Na sima alobi na bato nyonso: “Soki moto alingi kolanda ngai, átika kokanisa po na nzoto na ye moko, ákumba kuruze na ye mokolo na mokolo, pe álanda ngai.
[24] Pamba té moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango. Kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye po na ngai, akobikisa yango.
[25] Ata moto azwi bomengo nyonso ya mokili mobimba, eloko nini azwi soki ye moko abungi to akufi?
[26] Soki moto azali koyoka soni po na ngai pe po na maloba na ngai, Mwana ya Moto pe akoyoka soni po na ye, tango akoya na lokumu na ye pe na lokumu ya Tata, ná ya ba-anjelu ya bosantu.
[27] Nalobi na bino, ya solo: Na kati na bino bato bozali awa, bamosusu bazali, liboso 'tè bákufa bokomona ndenge Nzambe akotia bokonzi na ye.”
[28] Mikolo soki mwambe sima ya maloba yango, Yezu akamati Piere, Yoane pe Jake, akei na bango likolo ya ngomba po na kosambela.
[29] Awa azalaki kosambela, elongi na ye ebongwani pe bilamba na ye ekómi pembe penza.
[30] Na mbala moko bamoni bato mibale penepene ya Yezu; ezalaki Moize ná Eliya, bamonanaki na lokumu ya Likolo. Bazalaki kosolola ná ye po na ndenge akokende kokufa na Yeruzalem.
[32] Piere ná baninga na ye bazalaki kolala pongi makasi. Awa balamuki, bamoni lokumu ya Yezu pe ya bato oyo batelemaki penepene na ye.
[33] Tango Moize ná Eliya balingaki kotika Yezu, Piere alobi na ye: “Moteyi, lokola tozali awa ezali malamu. Tokotònga bandako misato ya kapo: moko po na yo, moko po na Moize, pe moko po na Eliya.” Kasi ayebaki té makambo azalaki koloba.
[34] Tango azalaki koloba boye, lipata moko eyei kozipa bango, bongo bayoki somo penza.
[35] Mongongo moko euti na lipata pe elobi: “Oyo azali Mwana na ngai; ngai moko moto naponá ye. Bóyokela ye!”
[36] Awa mongongo esilisi koloba, bayekoli bamoni kaka Yezu ye moko. Bafandaki kaka nyee, pe na mikolo wana bayebisaki na moto moko té makambo oyo bamonaki.
[37] Sima ya mokolo moko, bakiti ngomba pe bato ebele bayei kokutana na Yezu.
[38] Na kati ya bato wana, moto moko abandi koganga: “Moteyi, nabondeli yo ótala mwana na ngai ya mobali, nazali bobele na ye moko.
[39] Mbala na mbala molimo moko ekangaka ye, bongo na mbala moko mwana akómaka koganga pe kobimisa fulufulu na monoko. Molimo yango ekangaka ye pe eningisaka nzoto na ye makasi, bongo enyokolaka ye pe elingaka kotika ye té.
[40] Nabondelaki bayekoli na yo bábengana molimo wana, kasi bakokaki té.”
[41] Yezu azongisi: “A bino! Bato mabe! Bozangá bondimi! Nasengeli kofanda na bino pe kokanga motema po na bino tii tango nini?” Sima alobi na moto wana: “Mema mwana na yo awa.”
[42] Awa mwana akómi penepene ya Yezu, molimo mabe yango ekweisi ye na mabelé pe eningisi ye makasi. Kasi Yezu agangeli molimo mabe pe abikisi mwana, bongo azongisi ye na tata na ye.
[43] Bato nyonso bakamwe po na nguya monene ya Nzambe. Awa bato nyonso bazalaki kaka kokamwa po na makambo oyo Yezu azalaki kosala, alobi na bayekoli na ye:
[44] “Bósimba malamu makambo nazali kolobela bino sik'oyo: balingi koteka Mwana ya Moto epai ya bato.”
[45] Kasi bango bazalaki koyeba tina ya maloba wana té. Mitú na bango efungwamaki nanu té, pe bazalaki kobanga kotuna Yezu po na maloba wana.
[46] Mokolo moko bayekoli babandi kotiana tembe po na koyeba nani aleki baninga na kati na bango.
[47] Kasi Yezu ayebaki makambo bango bazalaki kokanisa. Bongo akamati Mwana moko ya moke, atie ye penepene na ye,
[48] pe alobi na bango: “Moto oyo akoyamba mwana oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko; pe moto oyo ayambi ngai, ayambi Moto oyo atindi ngai; pamba té oyo aleki moke na kati na bino, ye azali moto monene.”
[49] Yoane alobi na Yezu: “Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo, pe topekisaki ye po ye azali moto na biso té.”
[50] Kasi Yezu azongiseli ye: “Bópekisa ye té; moto oyo azali monguna na bino té, azali moninga na bino.”
[51] Etikalaki lisusu mikolo mingi té po 'tè Yezu átombwana na Likolo, akanaki na molende kokende na Yeruzalem.
[52] Bongo atindi bato bákende koyebisa na mboka moko ya Samarie 'tè azali koya, pe bábongisela ye makambo nyonso. Bango basali bongo,
[53] kasi bato ya mboka wana baboyi koyamba Yezu po ye azalaki kokende na Yeruzalem.
[54] Tango Jake ná Yoane bamoni boye, balobi: “Mokonzi, olingi tókitisa kake po ézikisa bango?”
[55] Kasi Yezu abaluki pe apekisi bango.
[56] Bongo bakei na mboka mosusu.
[57] Tango bazalaki kokende, moto moko alobi na Yezu boye: “Nakolanda yo epai nyonso okokende.”
[58] Yezu azongiseli ye: “Banyama ya zamba ezali na mabulu na yango, bandeke ezali na bazála na yango, kasi Mwana ya Moto azali na esika ya kolala té.”
[59] Alobi na moto mosusu: “Landa ngai.” Kasi moto wana azongisi: “Mokonzi, liboso pesa ngai nzela nákende kokunda tata na ngai.”
[60] Yezu alobi na ye: “Tika bato bakufá bákundana bango na bango. Kasi yo kende kosakola 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye.”
[61] Moto mosusu alobi: “Mokonzi, nakolanda yo; kasi liboso pesa ngai nzela nákende kopesa mbote ya suka na libota na ngai.”
[62] Yezu alobi na ye: “Moto oyo asimbi kongo po na kosala elanga pe azali kaka kotala na sima, akoki té na kosala na bokonzi ya Nzambe.”