[1] Yezu atali epai na epai; amoni bato ya mbongo bazali kobwaka mosolo na esika batiaka makabo,
[2] amoni pe mwasi moko akelelá pe akufelá mobali, atie bibende mibale ya mike oyo akokaki kosombela mwa-lipa.
[3] Bongo Yezu alobi: “Nalobi na bino, ya solo: Likabo ya mwasi oyo akelelá eleki ya bato nyonso.
[4] Pamba té bango nyonso bapesi mbongo oyo bazalaki na yango posa té; kasi ye, na kokelela na ye, apesi mbongo nyonso oyo akokaki kobikela na yango.”
[5] Bato mosusu bazalaki kosolola po na Ndako ya Nzambe, pe na ndenge babongisá yango na mabanga ya kitoko, pe na biloko oyo bato bapesaki na Nzambe. Bongo Yezu alobi:
[6] “Mokolo ezali, nyonso oyo bozali komona, bakopanza yango. Ata libanga moko té ekotikala na esika na yango.”
[7] Bongo bango batuni ye: “Moteyi, tango nini makambo yango ekosalama? Elembo nini ekolakisa 'tè makambo wana elingi koya?”
[8] Yezu azongisi: “Bókeba! Moto moko té ákosa bino! Pamba té bato ebele bakoya na kombo na ngai, bakoloba: ‘Ezali ngai moto bozalaki kozela’, pe ‘Tango ekoki.’ Kasi bólanda bango té.
[9] Tango bokoyoka 'tè bitumba ebimi na bamboka mosusu pe bákómi kotombokela bakonzi, bóyoka somo té. Makambo wana esengeli koya liboso, kasi suka ekoya noki té.”
[10] Na sima Yezu alobi lisusu: “Bitumba ekobima na kati ya bikolo pe na kati ya bamboka.
[11] Epai na epai mabelé ekoningana, nzala ekongala, pe bato ebele bakozwa maladi ya mabe. Makambo ya somo ekosalama, pe bilembo minene ekomonana na likolo.
[12] “Kasi liboso ya makambo nyonso wana, bakobanda kokanga bino, konyokola bino, kosambisa bino na bandako ya lisanga pe kotia bino na boloko. Bakobanda komema bino liboso ya bakonzi pe ya batambwisi, po na kombo na ngai.
[13] Na ndenge wana bokozwa nzela ya kosakola sango na ngai.
[14] Bózala kaka mitema pio. Bómitungisa té soki bokosamba ndenge nini.
[15] Pamba té ngai moko nakopesa bino mayele ya koloba, na ndenge 'tè mofundi moko té ákoka kotia tembe to kokweisa bino.
[16] Ata batata ná bamama na bino, mabota na bino ná baninga na bino bakoteka bino; bakoboma kutu bamosusu na kati na bino.
[17] Bato nyonso bakoyina bino po na kombo na ngai.
[18] Kasi ata suki moko té ya mitú na bino ekobunga.
[19] Bótia kaka molende, bongo bokozwa bomoi.”
[20] “Tango bokomona 'tè basoda bazingi Yeruzalem mobimba, bóyeba 'tè etikali moke vile ékufa.
[21] Bongo bato bakozala na rejion ya Yudea basengeli kokima epai ya bangomba; baoyo bakozala na kati ya Yeruzalem bálongwa, pe bato bakozala na bilanga, bákota na vile té.
[22] Mikolo wana ekozala mikolo ya etumbu ya Nzambe, po makambo nyonso oyo ekòmamá na Mikanda ésalama.
[23] Mawa na basi oyo bakozala na bazemi, ná baoyo bakobanda komelisa bana mabéle na tango wana, pamba té pasi ekozala mingi na mboka mobimba, pe Nzambe akolakisa kanda na ye na bato ya ekolo oyo.
[24] Banguna bakoboma bango na mbeli, bakomema bango na boumbu na bamboka nyonso, pe bato oyo bazali Bayuda té bakonyata Yeruzalem tii tango na bango ekokoka.”
[25] “Bilembo ekomonana na sanza, na moi pe na minzoto. Awa na mokili bato nyonso bakolenga; makelele ya ebale monene pe ya mbonge ekobangisa bango.
[26] Bakokufa po na somo tango bakokanisa makambo oyo esengeli kokweela mokili mobimba, pamba té moi, sanza pe minzoto ekoningana.
[27] Bongo bato bakomona Mwana ya Moto azali koya na likolo ya lipata, na nguya pe na lokumu nyonso.
[28] Tango makambo wana ekobanda kosalama, bózala molende, po tango na bino ya kobika ekómi penepene.”
[29] Na sima Yezu apesi bango ndakisa oyo, alobi: “Bótala nzete ya figi pe banzete nyonso:
[30] Tango bomonaka makasa na yango ebandi kobima, boyebaka 'tè eleko ya kobuka mbuma ekómi penepene.
[31] Bobele ndenge wana, tango bokomona makambo yango, bóyeba 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye.
[32] Nalobi na bino, ya solo: bato ya tango oyo bakomona makambo nyonso wana na miso.
[33] Likolo ná se ekoleka, kasi maloba na ngai ekoleka ata moke té.”
[34] “Bókeba! Mitema na bino ébeba té na makambo ya pamba, na kolangwalangwa, to pe na bapasi ya mokili oyo, soki té mokolo wana ekoyeela bino na mbalakaka.
[35] Pamba té yango ekokweela bato nyonso ya mokili mobimba lokola motambo.
[36] Bókengela tango nyonso pe bósambelaka po bózala na makasi ya kobika na nyonso oyo ekoya, pe bókoka kotelema liboso ya Mwana ya Moto.”
[37] Na moi, Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, kasi na pokwa azalaki kokende kolala na likolo ya Ngomba ya ba-Olive.
[38] Bongo na tongo-tongo bato bazalaki koya epai na ye na Ndako ya Nzambe po na koyoka ye.