[1] Na tango wana, mokonzi monene ya Rome kombo Oguste atindi bátanga bato nyonso, po báyeba talo na bango.
[2] Ezalaki mbala ya liboso bato bákòmisa bakombo na bango, tango Kirinius azalaki motambwisi ya Sirie.
[3] Bongo bato nyonso bakei kokòmisa bakombo, moto na moto na mboka na ye.
[4] Jozef pe atiki Nazaret na rejion ya Galilé, akei na Betleem na rejion ya Yudea, epai babotaki mokonzi David. Pamba té ye azalaki moto ya libota ya David.
[5] Akendeki kokòmisa kombo, ná Maria, elenge mwasi oyo ye akobala. Maria azalaki na zemi.
[6] Tango bazalaki kuna, mokolo na ye ya kobota ekokaki.
[7] Aboti mwana-mobali, Mwana na ye ya liboso; alíngi ye na bilamba, pe alalisi ye na kesi moko oyo batiaka bilei ya banyama, pamba té esika ezalaki té po na bango na ndako oyo bapaya bazalaki kolala.
[8] Na esobe pembeni ya Betleem ezalaki na babokoli ya bameme; bazalaki kolala kuna po na kokengela bameme na bango.
[9] Anjelu moko ya Nkolo abimeli bango, pe nkembo ya Nkolo engengeli bango. Babangaki mingi penza.
[10] Kasi anjelu alobi na bango: “Bóbanga té, nayeeli bino sango moko ya malamu, oyo ekosepelisa ekolo mobimba ya Israel:
[11] na butu ya lelo baboteli bino Mobikisi na mboka ya David. Ye azali Kristo pe Mokonzi oyo bozalaki kozela.
[12] Bokoyeba ye boye: bokomona Mwana balíngi bilamba, pe alali na kesi oyo batiaka bilei ya banyama.”
[13] Na mbala moko ba-anjelu mosusu ebele bayei kosangana ná anjelu oyo ya liboso. Bazalaki kokumisa Nzambe boye:
[14] “Lokumu na Nzambe kuna na Likolo! Pe boboto awa na se, na bato oyo ye alingaka.”
[15] Tango ba-anjelu bazongi na Likolo, babokoli ya bameme bayokani boye: “Tókende tii na Betleem, kotala makambo ekwei kuna, oyo Nkolo ayebisi biso.”
[16] Bakei kuna noki, bamoni Maria ná Jozef; bamoni pe Mwana alali na kesi oyo batiaka bilei ya banyama.
[17] Tango bamoni mwana, bayebisi bato makambo oyo anjelu alobaki po na mwana.
[18] Bato nyonso oyo bayokaki sango yango, bakamwe po na maloba ya babokoli ya bameme.
[19] Kasi Maria abombi makambo wana nyonso na motema, pe azalaki kokanisa yango.
[20] Na sima, babokoli ya bameme bazongi. Na nzela bazalaki kokumisa Nzambe, pe koyembela ye banzembo, po na makambo nyonso oyo bayokaki pe bamonaki; pamba té nyonso elekaki ndenge anjelu ayebisaki bango.
[21] Sima ya mikolo mwambe bakati Mwana, pe bapesi ye kombo Yezu; oyo ezali kombo anjelu ayebisaki Maria liboso 'tè ázwa zemi.
[22] Awa Mwana akokisi mikolo oyo ekokaki po na kokende kolongola mbindo, ndenge Mibeko ya Moize ezali kotinda po na basi oyo baboti sika. Bongo Jozef ná Maria bamemi mwana na Yeruzalem, po na kolakisa ye na Nkolo.
[23] Pamba té ekòmamá na Mibeko ya Nkolo: “Mwana nyonso ya mobali oyo baboti liboso, akozala ya Nkolo.”
[24] Bapesi pe mabonza oyo Mibeko yango ezali kotinda: “Bapijon mibale ya zamba, to bana-pijon mibale ya mboka.”
[25] Moto moko azalaki na Yeruzalem, kombo na ye Simeon. Azalaki moto malamu, azalaki kotosa Nzambe pe kozela mokolo Nzambe akolongola Israel mawa. Molimo Mosantu azalaki na ye,
[26] pe ayebisaki ye 'tè akokufa té liboso 'tè ámona Mesia oyo Nkolo akotinda.
[27] Molimo Mosantu amemaki Simeon na Ndako ya Nzambe, kaka na tango baboti ya Yezu bakei na mwana, po na kokokisa makambo Mibeko ezali kotinda.
[28] Bongo Simeon akamati ye na maboko pe apesi Nzambe mersi, alobi:
[29] “Mokonzi Nzambe, okokisi makambo olakaká; bongo sik'oyo tika ngai nákufa na esengo.
[30] Pamba té nasi'namoni na miso na ngai Mobikisi,
[31] oyo otindi epai ya bikolo nyonso ya mokili.
[32] Ye azali moi po na kongengela bikolo; azali kopesa lokumu na ekolo na yo Israel.”
[33] Tata ná mama ya Yezu bakamwaki mingi, awa bayoki makambo Simeon alobaki po na ye.
[34] Simeon apamboli bango pe alobi na Maria, mama ya Yezu: “Nzambe aponá mwana oyo po na kokweisa to kotelemisa bato mingi ya Israel; atie ye lokola elembo. Bato bakoyina ye,
[35] bongo makanisi oyo ebombamá na mitema ya bato mingi ekomonana polele. Pe yo, mama, pasi ekotobola motema na yo lokola mbeli.”
[36] Profete moko ya mwasi pe azalaki wana, kombo na ye Ana, Mwana ya Fanuel, ya libota ya Asher. Ye akómaki mobange penza, akokisaki mbula tuku mwambe na minei (84). Afandaki na mobali bobele mbula sambo, pe banda tango mobali na ye akufaki atikalaki kaka ye moko. Azalaki mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe, kobondela butu moi pe komilalisa nzala.
[38] Ye pe ayaki kaka na tango wana pe abandi kokumisa Nzambe, bongo alobaki makambo ya Yezu na bato nyonso oyo bazalaki kozela 'tè Nzambe ásilisa boumbu ya Yeruzalem.
[39] Tango baboti ya Yezu basilisi makambo nyonso oyo Mibeko ya Nkolo ezali kotinda, bazongi na Galilé, na mboka na bango Nazaret.
[40] Mwana akoli pe azwi nguya. Ayei kotonda na mayele, pe Nzambe abenisi ye.
[41] Mbula na mbula baboti ya Yezu bazalaki kokende na Yeruzalem po na feti ya Koleka.
[42] Tango Yezu akokisi mbula zomi na mibale, bamemi ye na feti ndenge Bayuda bamesaná.
[43] Tango feti esili, bakamati nzela po na kozonga. Kasi Yezu atikalaki na Yeruzalem, pe baboti na ye bayebaki té;
[44] bakanisaki 'tè ye azali epai ya bato mosusu. Basali mokolo mobimba na nzela, bongo babandi koluka ye epai ya bandeko pe baninga na bango.
[45] Lokola bamoni ye té, bazongi na Yeruzalem po na koluka ye.
[46] Na sima ya mikolo misato bakuti ye na Ndako ya Nzambe, afandi na kati ya balakisi-Mibeko; azalaki koyoka bango pe kotuna bango mituna.
[47] Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakamwaki mingi po na mayele na ye pe na ndenge azalaki kozongisa biyano.
[48] Tango baboti na ye bamoni ye bakamwe penza, bongo mama ya Yezu alobi: “Mwana na ngai, po na nini osali biso boye? Biso ná tata na yo tobangaki mingi pe tozali koluka yo.”
[49] Ye azongiseli bango: “Po na nini bozali koluka ngai? Boyebi té 'tè nasengeli kozala na Ndako ya Tata na ngai?”
[50] Kasi bango bayebaki tina ya maloba wana té.
[51] Bongo Yezu azongi na Nazaret nzela moko ná bango, pe azalaki kotosa bango. Mama na ye azalaki kobomba makambo nyonso wana na motema.
[52] Yezu azalaki kokóma mayele mingi pe kokola. Boye azalaki kosepelisa Nzambe ná bato.