[1] Na tango wana, bato nkoto na nkoto bayei kosangana, bongo bamosusu bazalaki konyata makolo ya baninga. Yezu abandi koloba liboso ya bayekoli na ye: “Bókeba na kisi ya mapa ya ba-Farizé (elingi koloba: bókeba na lokuta na bango).
[2] Mokolo ezali, makambo nyonso ebombamá, ekomonana polele; pe makambo ya sekelé ekoyebana.
[3] Yango wana nyonso oyo bolobaka na molili, bakoyoka yango na moi; pe nyonso oyo bolobaka na matoi na kati ya ndako, bakosakola yango na balabala.”
[4] “Baninga na ngai, nalobi na bino: bóbanga bato té! Bango babomaka nzoto, kasi na sima bakokaka kosala eloko té.
[5] Nakolakisa bino nani bosengeli kobanga: bóbangaka kaka Nzambe, pamba té soki alongoli bomoi ya moto, na sima azali na bokonzi ya kobwaka ye na lifelo. Ee, nalobi na bino, ezali ye nde moto bosengeli kobangaka.
[6] “Batekaka bandeke mitano ya mike na talo moke. Boye té? Kasi Nzambe abosanaka moko té na kati na yango.
[7] Po na bino ezali se bongo. Ata suki na bino, Nzambe asi'atangá yango nyonso. Yango wana bóbanga té! Bino bozali na tina, koleka ebele ya bandeke mike!”
[8] “Nalobi na bino, moto nyonso oyo akondima ngai na miso ya bato, Mwana ya Moto akondima ye na miso ya ba-anjelu ya Nzambe.
[9] Kasi oyo akowangana ngai na miso ya bato, Mwana ya Moto pe akowangana ye na miso ya ba-anjelu ya Nzambe.
[10] “Moto nyonso oyo afingi Mwana ya Moto, akoki kozwa bolimbisi; kasi oyo atsioli Molimo Mosantu akozwa bolimbisi té.
[11] “Tango bakomema bino po na kosambisa bino na bandako ya lisanga, to epai ya bato minene pe batambwisi ya mboka, bóbanga té po na makambo bokozongisa, to ndenge nini bokoloba.
[12] Pamba té na tango wana Molimo Mosantu akolakisa bino makambo bosengeli koloba.”
[13] Moto moko na kati ya bato alobi na Yezu: “Moteyi, loba na ndeko na ngai, ápesa ngai oyo ya ngai ndambo ya biloko tata atikelaki biso.”
[14] Yezu azongiseli ye: “Moninga, nani atie ngai zuzi po na kokata makambo na bino to kokabola biloko na bino?”
[15] Bongo alobi na bango nyonso: “Bókeba pe bózala na lokoso ya mbongo té, pamba té moto akoki kozwa bomoi ya solo té po na biloko oyo azali na yango, ata soki azali na yango mingi.”
[16] Bongo apesi bango ndakisa oyo: “Moto moko ya mbongo azalaki na bilanga; yango ezalaki kobotela ye biloko mingi ya malamu.
[17] Azalaki komituna: ‘Násala nini? Nazali na esika té po na kobomba biloko na ngai oyo nyonso.’
[18] Bongo amilobi: ‘Nakosala boye: Nakoboma bandako oyo nabombelaka biloko na ngai, pe nakotònga ya minene; boye nakotia blé ná biloko na ngai nyonso mosusu kuna.
[19] Sima, nakomiloba: Nazali na biloko mingi po na mbula ebele. Nápema, nália, námela pe násepela.’
[20] Kasi Nzambe alobi na ye: ‘Yo ozangá mayele! Okokufa na butu ya lelo. Bongo biloko nyonso oyo obombi ekotikala na nani?’”
[21] Yezu asukisi boye: “Moto oyo akongolaka biloko po na ye moko asukaka ndenge wana; azali na bomengo té na miso ya Nzambe.”
[22] Na sima Yezu alobi na bayekoli na ye: “Yango wana nalobi na bino: Bómitungisaka té na komitunaka soki bokolia nini, bokomela nini, to pe soki bokolata nini.
[23] Pamba té bomoi eleki bilei, pe nzoto eleki bilamba.
[24] Bótala bandeke! Yango ekonaka té pe ekongolaka bambuma na bilanga té; ezali na bandako té to bisika ya kobombela bilei; ezali Nzambe moto aleisaka yango. Bino boleki bandeke na tina!
[25] Ata bomitungisi boni, nani na kati na bino akoki kobakisa mokolo moko na bomoi na ye?
[26] Soki bokoki kutu té kosala likambo oyo ya moke, po na nini bozali komitungisa na makambo mosusu?
[27] Bótala baflere, ndenge ekolaka na esobe: yango esalaka té pe etòngaka bilamba té; kasi nalobi na bino: ata Salomon, moto ya bomengo penza, alataki malamu té lokola baflere wana.
[28] Bókanisa: matiti oyo ezali lelo na esobe, lobi bakoki kotumba yango na móto. Bongo soki Nzambe alatisaka yango boye, akoki kolatisa pe bino té? Ya solo, bondimi na bino ezali moke.
[29] Boye bino pe bóminyokolaka té po na kokanisa tango nyonso soki bokolia nini pe bokomela nini.
[30] Kaka baoyo bayebi Nzambe té bato bamitungisaka po na koluka biloko wana nyonso. Kasi bino, Tata na bino ayebi 'tè bozali na posa na yango.
[31] Bólukaka kaka kokóma bato ya bokonzi na ye, bongo ye akopesa bino biloko mosusu.
[32] Bino bato bozali lokola mwa-liboke ya bameme na ngai, bótika kobanga. Pamba té Tata na bino aponi bino po bókóma bato ya bokonzi na ye.”
[33] “Bóteka biloko na bino pe bópesa mbongo na bato bakelelá. Bókamata basaki ya mbongo oyo ekufaka té, bóbombisa bomengo na Likolo, po kuna bamiyibi bakoki koyiba té, pe bampese ekoki kolia yango té.
[34] Pamba té esika bomengo na bino ezali, mitema na bino pe ezali kuna.”
[35] “Bózalaka na ekenge tango nyonso, pe bóbatelaka bamwinda na bino ékufa té.
[36] Bósalaka lokola basali bazali kozela mokonzi na bango, oyo akendeki na feti ya libala; bazali na ekenge po báfungolela ye ndako noki, tango akozonga pe akobeta porte.
[37] Esengo mingi na basali oyo mokonzi na bango akoya kokuta bazali kokengela. Nalobi na bino ya solo: akofandisa bango na mesa, akosalisela bango feti, pe ye moko akoya kotiela bango bilei.
[38] Soki azongi na midi ya butu to na sima, pe akuti bango bazali kokengela kaka, bakosepela mingi penza.
[39] Bókanisa nanu. Soki kolo ya ndako ayebi tango nini moyibi akoya, akosala nyonso po bábuka ndako na ye té.
[40] Bino pe bózalaka na ekenge tango nyonso, pamba té Mwana ya Moto akoya na ngonga oyo bino boyebi té!”
[41] Bongo Piere atuni: “Mokonzi, olobi boye po na biso kaka to po na bato nyonso?”
[42] Mokonzi azongisi: “Bózalaka lokola mosali ya malamu pe ya mayele, oyo mokonzi atie kapita ya basali na ye, po ápesaka bango bilei na tango ekoki.
[43] Esengo mingi na mosali wana soki mokonzi azongi pe akuti ye azali kosala mosala.
[44] Nalobi na bino, ya solo: mokonzi wana akotia biloko na ye nyonso na maboko na ye.
[45] Nzokande soki mosali yango amilobi: ‘Mokonzi na ngai azali koya noki té’, bongo soki abandi kobeta basali mosusu ya mibali ná ya basi; soki azali kolia, komela pe kolangwa,
[46] mokonzi na ye akozonga na mokolo mosali wana azali kozela ye té pe na ngonga ayebi té. Akopesa ye etumbu ya somo; akotia ye na molongo ya bato batosaka Nzambe té.
[47] “Mosali oyo ayebi makambo mokonzi na ye alingaka; kasi amipesaka té po na kosala yango, bakobeta ye fimbu mingi.
[48] Kasi mosali oyo ayebi té makambo mokonzi na ye alingaka pe asali makambo oyo ekoki kobetisa ye fimbu, bakobeta ye fimbu mingi té. Moto oyo azwi mingi, bakosenga ye pe mingi. Moto oyo bapesi makambo minene-minene, bakosenga ye pe makambo minene koleka.”
[49] “Nayaki awa na mokili po nátia móto na kati ya bato; nazali na posa námona yango ezali kopela.
[50] Nasengeli koyoka pasi mingi; yango ekozala lokola batisimo bakopesa ngai, pe nazali motema likolo tii tango ekosalama.
[51] Bokanisi 'tè nayeeli bato boboto? Té! Nalobi na bino: nayei po na kokabola bato.
[52] Banda lelo libota moko ya bato mitano ekokabwana, epai mosusu bato misato, epai mosusu bato mibale.
[53] Batata bakoyinana ná bana na bango ya mibali. Bamama bakoyinana ná bana na bango ya basi. Babokilo ya basi bakoyinana ná basi ya bana na bango.”
[54] Yezu alobaki lisusu na bato: “Soki bomoni lipata ebimi na epai moi elalaka, kaka na tango wana bolobi: ‘Mbula ekonoka’, pe yango esalamaka.
[55] Pe soki bomoni mopepe ezali kouta na epai ya se, bolobi: ‘Lelo moi ekozala makasi penza’, pe yango esalamaka.
[56] Bato ya lokuta! Boyebi kolimbola makambo bomonaka na Likolo pe na se. Bongo po na nini bokokaka té kolimbola makambo ezali koleka na tango oyo?”
[57] “Po na nini bino moko bokokaka koyeba té makambo oyo bosengeli kosala?
[58] Soki moto afundi yo pe bozali kokende ná ye na tribinal, sala makasi po bóyokana tango bozali nanu na nzela. Soki té moto yango akomema yo liboso ya zuzi, bongo zuzi akopesa yo na maboko ya basoda po bábwaka yo na boloko.
[59] Nalobi na yo, okobima na boloko té tii tango okofuta nyongo nyonso.”