[1] Mokolo moko Yezu abeteli bango lisapo po na kolakisa bango 'tè basengeli kobondela Nzambe tango nyonso, pe kolemba ata moke té.
[2] Alobi: “Na mboka moko ezalaki na zuzi moko, azalaki kobanga Nzambe té, azalaki pe kotosa bato té.
[3] Mwasi moko pe azalaki kuna akufelá mobali. Mikolo nyonso ye azalaki koya epai ya zuzi pe kosenga ye: ‘Longisa ngai, pamba té basali ngai mabe.’
[4] Banda kala zuzi wana azalaki kaka kolinga té; kasi na sima amilobi: ‘Ata nabangaka Nzambe té pe natosaka bato té,
[5] kasi nakolongisa mwasi oyo po azali kotungisa ngai. Soki boye té, akobanda kaka koya kotiela ngai makelele.’”
[6] Mokonzi abakisi: “Bóyoka ndenge zuzi oyo ya mabe alobi.
[7] Bongo Nzambe akotika kolongisa bato oyo ye aponi, soki bazali kobondela ye butu moi? Akozelisa bango?
[8] Nalobi na bino, akolongisa bango noki. Kasi tango Mwana ya Moto akoya, bokanisi akokuta bondimi awa na mokili?”
[9] Mokolo moko Yezu apesi toli na bato oyo bakanisaka 'tè bazali bato malamu na miso ya Nzambe, pe bamonelaka bato mosusu; abeteli bango lisapo oyo:
[10] “Bato mibale bakendeki na Ndako ya Nzambe po na kosambela. Moko azalaki Farizé, mosusu mofutisi-mpaku.
[11] Farizé akei kotelema na miso ya bato nyonso, pe asambeli boye na motema: ‘E Nzambe, napesi yo mersi po nazali lokola bato mosusu té. Bango bazali bamiyibi, bato ya mobulu pe ya kindumba. Nazali pe lokola mofutisi-mpaku oyo kuna té.
[12] Na póso moko namilalisaka nzala mikolo mibale; pe na biloko nyonso nazwaka nalongolelaka yo eteni moko na kati ya biteni zomi.’
[13] Mofutisi-mpaku atikalaki na sima ya bato nyonso, pe amekaki kutu kotala na likolo té, kasi azalaki kobeta tolo po na mawa, alobi: ‘E Nzambe, yokela ngai mawa, nazali moto ya masumu.’”
[14] Yezu abakisi boye: “Nalobi na bino, mofutisi-mpaku, tango azongaki na ndako na ye, asi'akómaki moto malamu na miso ya Nzambe; kasi Farizé té. Pamba té moto nyonso oyo amikumisaka, Nzambe akitisaka ye; pe oyo nyonso amikitisaka, Nzambe akumisaka ye.”
[15] Bato bayeeli Yezu ata bana mike po ásimba bango. Tango bayekoli bamoni bongo babandi kopekisa bango.
[16] Kasi Yezu abengi bana pe alobi: “Bótika bana báya epai na ngai. Bópekisa bango té, pamba té bokonzi ya Nzambe ezali po na baoyo bakokani ná bango.
[17] Nalobi na bino, ya solo: moto oyo akoyamba bokonzi ya Nzambe lokola Mwana moke té, akokota kuna ata moke té.”
[18] Mokonzi moko ya Bayuda atuni Yezu: “Moteyi malamu, nasengeli kosala nini po názwa bomoi ya seko?”
[19] Yezu alobi na ye: “Po na nini obengi ngai moto malamu? Moto moko ya malamu azali té, kaka Nzambe ye moko.
[20] Oyebi Mibeko: Kosala kindumba té; koboma moto té, koyiba té; kokosela moto makambo té; tosa tata ná mama na yo.”
[21] Moto wana azongisi: “Natosaka Mibeko wana nyonso banda bomwana na ngai.”
[22] Awa Yezu ayoki boye alobi: “Ozangi kaka likambo moko; kende kotekisa biloko na yo nyonso, pe kabola mbongo wana na bato bakelelá. Wana nde okozala na bomengo na Likolo. Sima yaka kolanda ngai.”
[23] Kasi tango moto wana ayoki makambo yango akómi mawa-mawa, po azalaki na mbongo mingi.
[24] Awa Yezu amoni boye alobi: “Bato ya bomengo bakozala na pasi mingi po na kokota na bokonzi ya Nzambe.
[25] Pamba té nyama monene oyo babengaka shamó, ekoki kokota na lidusu ya tonga ata moke té! Kasi ezali lisusu pasi mingi koleka po moto ya bomengo ákota na bokonzi ya Nzambe.”
[26] Bato oyo bazalaki koyoka yango batuni: “Bongo nani akoki kobika?”
[27] Yezu azongisi: “Makambo oyo bato bakoki kosala té, Nzambe akoki kosala yango.”
[28] Bongo Piere alobi: “Tala nanu, biso totikaki bandako na biso pe tolandi yo.”
[29] Yezu alobi na bango: “Nalobi na bino, ya solo: moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi, bandeko, baboti to bana na ye po ámipesa na makambo ya bokonzi ya Nzambe,
[30] akozwa biloko mingi koleka na mikolo oyo, pe akozwa bomoi ya seko na mikolo ekoya.”
[31] Yezu akamati bayekoli na ye zomi na mibale pe alobi na bango: “Bóyoka! Tozali kokende na Yeruzalem. Kuna makambo nyonso baprofete bakòmaká po na Mwana ya Moto, ekosalama.
[32] Bakokaba ye na maboko ya bato oyo bayebi Nzambe té. Bakoseka ye; bakofinga ye pe bakobwakela ye soi.
[33] Bakobeta ye bafimbu pe bakoboma ye. Nzokande akosekwa na mikolo misato.”
[34] Kasi bayekoli bayebaki tina ya maloba ya Yezu té; mitú na bango efungwamaki nanu té.
[35] Tango Yezu akómi penepene ya Jerikó, moto moko akufá miso afandaki pembeni ya nzela pe azalaki kosenga bato mbongo.
[36] Awa ayoki bato mingi bazali koleka, atuni: “Likambo nini oyo?”
[37] Bayebisi ye: “Yezu ya Nazaret azali koleka.”
[38] Bongo abeleli: “Yezu, Mwana ya David, yokela ngai mawa!”
[39] Bato oyo bazalaki kotambola liboso bakómi kogangela ye áfanda nyee. Kasi ye alekisi penza koganga makasi: “Mwana ya David! Yokela ngai mawa!”
[40] Bongo Yezu atelemi pe atindi bámemela ye moto yango. Tango akómi pembeni, Yezu atuni ye:
[41] “Olingi násala nini po na yo?” Ye azongisi: “Mokonzi, nalingi námona lisusu.”
[42] Bongo Yezu alobi na ye: “Mona. Bondimi na yo ebikisi yo.”
[43] Kaka na tango wana moto yango abandi komona, alandi Yezu pe akumisi Nzambe. Awa bato bamoni bongo, babandi pe kokumisa Nzambe.