[1] Mokolo moko Yezu azalaki pembeni ya laki ya Jenezaret. Bato mingi batondanaki wana pe bazalaki kotia ye kaká po na koyoka maloba ya Nzambe.
[2] Yezu amoni babwatu mibale pembeni ya mokili. Baluki-mbisi batikaki yango po na kosukola minyama na bango.
[3] Yezu akoti na bwatu moko; yango ezalaki ya Simon. Asengi ye ápusa bwatu mwa-moke na mai, bongo afandi na bwatu pe abandi koteya bato.
[4] Tango asilisi koteya, alobi na Simon: “Pusa bwatu esika mai ezali modindo, bongo bóbwaka minyama na bino na mai po na kokanga bambisi.”
[5] Simon azongiseli ye: “Moteyi, tosali butu mobimba pe tokangi ata eloko moko té, kasi lokola yo otindi, nakobwaka minyama na mai.”
[6] Basali bongo, pe bakangi bambisi ebele penza; minyama na bango ebandi kutu kopasuka.
[7] Yango wana babengi baninga na bango oyo bazalaki na bwatu mosusu po báya kosalisa bango. Bayei pe batondisi babwatu nyonso mibale na bambisi, bongo elingaki kodinda.
[8] Tango Simon amoni boye akwei na mabolongo liboso ya Yezu pe alobi na ye: “Mokonzi, longwa penepene na ngai, nazali moto ya masumu!”
[9] Pamba té ye ná bato nyonso oyo bazalaki na bwatu na ye bayokaki somo penza po na bambisi ebele oyo bakangaki.
[10] Jake ná Yoane bana ya Zebedé, baninga ya Simon oyo bazalaki na bwatu mosusu, bayokaki pe somo ndenge moko. Kasi Yezu alobi na Simon: “Kobanga té. Banda lelo okozala lisusu moluki-mbisi té, kasi okobanda koluka bato.”
[11] Bongo bamemi babwatu na bango na libongo. Batiki biloko na bango nyonso, pe balandi Yezu.
[12] Lokola Yezu azalaki na mboka moko, moto moko azalaki na maladi ya maba ayei. Tango amoni Yezu, akwei elongi na se, pe abondeli ye boye: “Mokonzi, soki olingi okoki kobikisa ngai.”
[13] Yezu atandi liboko, asimbi ye pe alobi: “Nalingi yango, bika.” Kaka na tango wana maladi ya maba esili.
[14] Yezu atindi ye boye: “Koloba likambo oyo na moto té. Kende komilakisa na nganga-Nzambe ndenge okómi, pesa mabonza ndenge Moize atindá po na moto oyo abiki na maladi ya maba; boye bato nyonso bakomona 'tè obiki solo.”
[15] Sango ya Yezu epanzanaki bipai na bipai, pe bato mingi bazalaki koya kosangana po na koyoka ye, pe kosenga ye ábikisa bango na bamaladi na bango.
[16] Kasi Yezu abendi nzoto pe akei na esobe po na kosambela.
[17] Mokolo moko Yezu azalaki koteya; ba-Farizé ná balakisi-Mibeko bafandaki wana, bautaki na bavile nyonso ya Galilé pe ya Yudea; bamosusu bautaki kutu na Yeruzalem. Yezu azalaki kobikisa bato ya maladi na nguya ya Nkolo.
[18] Bongo bamemeli ye moto moko akufá makolo, alali na mbeto. Bazalaki koluka nzela ya kokotisa ye na kati ya ndako pe kotia ye liboso ya Yezu.
[19] Kasi lokola bazwi esika ya kokotisa ye té po na kaká ya bato, bamati likolo ya ndako, batoboli lidusu, pe bakitisi ye ná etoko na ye na kati-kati ya bato nyonso liboso ya Yezu.
[20] Tango Yezu amoni bondimi na bango, alobi na moto ya maladi wana: “Moninga, nalimbisi yo masumu.”
[21] Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé babandi komituna: “Moto oyo azali nani? Azali kotsiola Nzambe! Nani moto akoki kolimbisa masumu? Kaka Nzambe té?”
[22] Yezu ayebaki makanisi na bango pe alobi: “Po na nini bozali kokanisa ndenge wana?
[23] Soki nalobi na ye: ‘Nalimbisi masumu na yo’, to pe nalobi: ‘Telema pe tambola'; nini eleki pasi?
[24] Kasi nalingi bóyeba 'tè Mwana ya Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mokili.” Bongo alobi na moto akufá makolo: “Nalobi na yo: telema, kamata etoko na yo pe zonga na ndako.”
[25] Na mbala moko moto wana atelemi na miso ya bato nyonso, akamati etoko na ye, azongi na ndako pe na nzela azalaki kokumisa Nzambe.
[26] Bato nyonso bakamwe penza, bakumisi Nzambe pe babangi, balobi: “Lelo tomoni likambo ya kokamwa!”
[27] Sima na yango Yezu abimi, pe amoni mofutisi-mpaku moko, kombo na ye Levi, afandi na biro na ye. Yezu alobi na ye: “Landa ngai.”
[28] Levi atelemi, atiki biloko na ye nyonso pe alandi ye.
[29] Bongo Levi asaleli Yezu feti monene na ndako na ye. Bafutisi-mpaku mingi ná bato mosusu bafandaki na mesa esika moko ná bango.
[30] Ba-Farizé ná balakisi-Mibeko oyo bazalaki na lingomba na bango bakómaki koyimayima pe balobi na bayekoli ya Yezu: “Po na nini bozali kolia pe komela esika moko ná bafutisi-mpaku pe bato ya masumu?”
[31] Yezu azongiseli bango, alobi: “Bato oyo bazali na nzoto malamu balukaka monganga té, kasi bobele bato ya maladi nde balukaka monganga.
[32] Nayaki kobenga bato ya malamu té, kasi nayaki kobenga bato ya masumu po bábongola mitema.”
[33] Bato mosusu balobi na Yezu: “Bayekoli ya Yoane ná ya ba-Farizé bazali na batango mingi ya komilalisa nzala pe ya kosambela; kasi bayekoli na yo basalaka bongo té, baliaka pe bamelaka.”
[34] Bongo Yezu azongiseli bango: “Boni? Soki bobengisi bato na feti ya libala, bokoki kolalisa bango nzala, tango moto oyo abali azali nanu na bango? Esalamaka té!
[35] Kasi mokolo ezali bakolongola mobali na kati na bango; bongo mokolo wana baninga na ye bakobanda komilalisa nzala.”
[36] Yezu apesi bango ndakisa oyo: “Moto moko té akamataka kitendi ya elamba ya sika po ábamba na elamba ya kala. Soki asali bongo, abebisi elamba ya sika, pe kitendi ya sika oyo akamati ekokani té na elamba ya kala.
[37] Pe moto moko té atiaka vinu ya sika na basaki ya kala. Soki asali boye, vinu ya sika ekopasola basaki; bongo vinu ekopanzana pe basaki ekokufa.
[38] Kasi ebongi malamu bátia vinu ya sika na basaki ya sika.
[39] Pe moto moko té alingaka vinu ya sika soki asi'ameli vinu ya kala. Pamba té akoloba: ‘Vinu ya kala eleki malamu.’”