[1] Mokolo moko, Yezu azalaki koteya bato pe kosakola Sango Malamu na kati ya Ndako ya Nzambe. Bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi-Mibeko ná bambuta-muntu ya ekolo bayei epai na ye,
[2] batuni ye: “Lobela biso, epai wapi ozwi bokonzi ya kosala boye? Nani apesi yo bokonzi yango?”
[3] Yezu azongiseli bango: “Ngai pe nakotuna bino motuna moko. Bólobela ngai:
[4] Batisimo oyo Yoane azalaki kopesa, eutaki epai ya Nzambe, to epai ya bato?”
[5] Kasi babandi kotiana tembe bango na bango pe balobi: “Soki tozongisi ‘Epai ya Nzambe’, ye akotuna: ‘Po na nini bondimelaki Yoane té?’
[6] Soki pe tolobi ‘Epai ya bato’, Bayuda nyonso bakoboma biso na mabanga, pamba té bango nyonso bandimaka 'tè Yoane azalaki profete.”
[7] Bongo bazongisi: “Biso toyebi té.”
[8] Pe Yezu alobi na bango: “Ngai pe nakoyebisa bino té soki nazali kosala makambo oyo na bokonzi ya nani.”
[9] Na sima Yezu abeteli bato lisapo oyo, alobi: “Moto moko akonaki elanga na ye ya vinu, atie bato ya kofutela, bongo ye akei na mobembo pe aumeli mingi kuna.
[10] Na tango ya kolongola mbuma ya vinu, atindi mosali na ye epai ya bafuteli ya elanga, po ákende kozwa ndambo ya mbuma oyo ya ye. Kasi bafuteli ya elanga babeti mosali wana, pe bazongisi ye maboko pamba.
[11] Kolo ya elanga atindi mosali mosusu, kasi bafuteli babeti ye kaka ndenge moko, bafingi ye pe bazongisi ye maboko pamba.
[12] Atindi lisusu mosali ya misato. Ye pe bazokisi ye pe babwaki ye na libanda.
[13] Bongo kolo ya elanga amilobi: ‘Násala nini? Nakotinda Mwana na ngai ya bolingo; tango mosusu bakotosa ye.’
[14] Kasi tango bafuteli ya elanga bamoni ye, balobi bango na bango: ‘Tala moto akokóma kolo ya elanga soki tata na ye akufi. Tóboma ye, po elanga ya vinu ékóma ya biso.’
[15] Bongo babwaki ye na libanda pe babomi ye.” Sima Yezu abakisi alobi: “Kolo ya elanga akosala nini?
[16] Akoya koboma bafuteli wana, pe akopesa elanga na maboko ya bato mosusu.” Tango bato bayoki maloba yango, balobi: “Makambo oyo ekoki kosalama té!”
[17] Kasi Yezu atali bango nyee pe azongiseli bango: “Bókanisa nanu makambo oyo ekòmamá na Mikanda: ‘Libanga bamason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem.’
[18] Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga wana akopasuka; pe soki libanga wana ekweeli moto ekonika ye.”
[19] Balakisi-Mibeko ná bakonzi ya banganga-Nzambe bayebaki 'tè Yezu azalaki kokanisa bango, tango abetaki lisapo ya bafuteli mabe ya elanga. Yango wana bakómi koluka nzela ya kokanga ye kaka na tango wana, kasi bazalaki kobanga bato.
[20] Yango wana babandi kolanda ye na mayele, pe batindi bato mosusu oyo bamilakisi lokola bato malamu, po bámeka kokweisa ye na maloba na ye moko, bongo bápesa ye na maboko ya Pilate, motambwisi ya rejion ya Yudea.
[21] Bango batuni Yezu: “Moteyi, toyebi 'tè makambo olobaka pe oteyaka ezali ya solo. Otalaka bilongi ya bato té, kasi olakisaka solo nzela ya Nzambe.
[22] Lobela biso: Mibeko na biso epesaka nzela ya kofuta mpaku na mokonzi monene ya Rome to té?”
[23] Kasi Yezu ayebaki mayele na bango ya mabe pe alobi:
[24] “Bólakisa ngai ebende moko ya mbongo. Foto oyo pe kombo oyo bakòmá awa ezali ya nani?” Bango bazongiseli ye: “Ya mokonzi monene ya Rome.”
[25] Bongo Yezu alobi na bango: “Bópesa mokonzi monene ya Rome oyo ezali ya ye, pe bópesa na Nzambe oyo ya ye.”
[26] Bakokaki kokanga ye té po na maloba oyo autaki koloba na miso ya bato; nzokande eyano na ye ekamwisi kutu bango, pe bafandi nyee.
[27] Ba-Sadusé mosusu bayei epai ya Yezu. Ezali ba-Sadusé bato balobaka 'tè bato bakufá bakoki kosekwa té. Batuni ye boye:
[28] “Moteyi, Moize apesaká biso Mobeko oyo: Soki moto akufi, atiki mwasi kasi aboti na ye bana té, ndeko ya moto akufi asengeli kobala mwasi oyo ye atiki, po ábotela ye bana.
[29] Na mboka moko ezalaki na bandeko sambo, bango nyonso mama moko, tata moko. Mwana ya liboso abali mwasi pe akufi, aboti na ye té.
[30] Oyo ya mibale abali mwasi wana pe akufi;
[31] na sima oyo ya misato abali ye pe akufi. Ezalaki ndenge moko po na bango nyonso sambo, bakufaki kasi babotaki té.
[32] Na sima mwasi yango pe ayei kokufa.
[33] Bongo mokolo bato bakufá bakosekwa, mwasi wana akozala ya nani? Pamba té bango nyonso sambo babalaki ye.”
[34] Yezu azongiseli bango: “Bato ya mokili oyo babalanaka,
[35] kasi baoyo Nzambe akoyamba na mokili ya sika, akosekwisa bango; bongo bakobanda kobalana té.
[36] Bakoki kokufa lisusu té, pamba té bakokani ná ba-anjelu; bazali bana ya Nzambe po basekwi.
[37] Moize alakisaki polele 'tè bato bakufá bakosekwa. Pamba té na lisolo ya nzete oyo ezalaki kopela, ekòmamá 'tè Nkolo azali ‘Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.’
[38] Nzambe azali Nzambe ya bato bakufá té, kasi ya bato oyo bazali na bomoi; na mboka na ye bato nyonso bazali na bomoi.”
[39] Bongo balakisi-Mibeko mosusu balobi na ye: “Moteyi, olobi malamu”;
[40] boye babangaki kotuna ye mituna mosusu.
[41] Yezu alobi na bango: “Ndenge nini bakoki koloba 'tè Mesia azali Mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?
[42] Pamba té ye moko David akòmaká na mokanda ya banzembo: ‘Nkolo alobi na Mokonzi na ngai: fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu;
[43] nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.’
[44] David azalaká kobenga Mesia ‘Mokonzi na ngai'; bongo ndenge nini ye akoki kozala mwana ya David, oyo akozwa bobele ebonga na ye?”
[45] Awa bato nyonso bazalaki koyoka ye, Yezu alobi na bayekoli na ye:
[46] “Bókebaka na balakisi-Mibeko. Bango balingaka kotambola na banzambala ya lokumu. Balingaka 'tè bato bápesaka bango bambote na bazando. Baponaka bisika ya liboso na bandako ya lisanga, pe bakiti ya lokumu na bafeti.
[47] Babotolaka biloko ya basi oyo bakufelá mibali, pe bakosanaka kosambela mingi. Bango bakozwa etumbu oyo eleki monene!”