Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:06

[1] Mokolo moko bato mosusu bayei kolobela Yezu makambo ya bato ya Galilé oyo Pilate abomisaki, tango bazalaki koboma banyama po na kopesa mabonza na Nzambe.

[2] Yezu azongiseli bango: “Lokola bato yango ya Galilé bakufaki ndenge wana, bokanisi 'tè masumu na bango eleki oyo ya bato mosusu ya Galilé?

[3] Té! Kasi nalobi na bino: soki bobongoli mitema té, bino nyonso bokokufa kaka lokola bango.

[4] Bongo bato zomi na mwambe (18) ya Yeruzalem oyo bakufaki tango ndako ya Siloé ebukanaki, bokanisi 'tè mabe na bango eleki ya bato mosusu nyonso ya Yeruzalem?

[5] Té! Kasi nalobi na bino: soki bobongoli mitema té, bino nyonso bokokufa kaka ndenge moko.”

[6] Yezu apesi ndakisa, alobi: “Moto moko akonaki nzete ya figi na elanga na ye. Mokolo moko ayei koluka bafigi, kasi azwaki yango té.

[7] Bongo alobi na mosali ya elanga: ‘Tala, mbula misato mobimba nazali koya koluka bafigi na nzete oyo, kasi nazwaka yango té. Kata yango. Ezali kobebisa mabelé kaka pamba.’

[8] Kasi mosali ya elanga azongiseli ye: ‘Mbuta-muntu, tika yango nanu mbula oyo. Nakotimola mabelé pembeni na yango, pe nakotia matiti ya kopola.

[9] Boye, tango mosusu ekoki kobota bafigi na mbula ekoya; soki bongo té okokata yango.’”

[10] Mokolo moko ya Kopema Yezu azalaki koteya na ndako ya lisanga.

[11] Mwasi moko azalaki wana, azalaki na molimo mabe epesá ye maladi ya kunki; yango esi'esali mbula zomi na mwambe (18). Mokongo na ye egumbamá pe abandaki kokoka kotelema malamu té.

[12] Awa Yezu amoni ye, abengi ye pe alobi: “Mama, obiki, maladi na yo esili.”

[13] Asimbi ye, na mbala moko kunki esili, atelemi malamu pe abandi kokumisa Nzambe.

[14] Kasi mokonzi ya ndako ya lisanga asiliki po Yezu abikisaki moto na Mokolo ya Kopema, bongo alobi na bato: “Tozali na mikolo motoba ya mosala. Bóyaka na mikolo wana po básalisaka maladi na bino, kasi bóyaka na Mokolo ya Kopema té.”

[15] Mokonzi azongiseli ye boye: “Bino bozali bato ya lokuta! Na Mokolo ya Kopema, moko moko na bino afungolaka ngombe na ye to punda na ye po ákende komelisa yango mai. Boye té?

[16] Bótala mama oyo, moto ya libota ya Abraham. Banda Satan akangá ye esi'esali mbula zomi na mwambe (18). Bongo nasengelaki té kofungola ye minyololo oyo na Mokolo ya Kopema?”

[17] Awa alobi boye, banguna na ye bayoki soni penza; kasi bato nyonso basepelaki po na misala ya lokumu oyo ye asalaki.

[18] Yezu alobi: “Ndenge nini Nzambe akotia bokonzi na ye? Nakoki komeka yango na nini?

[19] Ekokani ná mbuma babengaka mutarde, oyo moto moko akoni na elanga na ye. Ebimi pe ekómi nzete, bongo bandeke eyei kosala bazála na bitape na yango.”

[20] Yezu alobi lisusu: “Ndenge nini Nzambe akotia bokonzi na ye?

[21] Bokonzi ya Nzambe ekokani na kisi ya mapa: Mama moko asangisi yango na sani monene ya farine, bongo farine nyonso eyei kovimba.”

[22] Yezu azalaki kaka kolanda nzela na ye po na kokende na Yeruzalem; abandaki kokota na bavile pe na bamboka ya mike po na koteya bato.

[23] Moto moko atuni ye: “Mokonzi, bato oyo bakobika bazali mingi té?” Yezu azongiseli ye:

[24] “Bósala makasi po na kokota na porte ya moke. Nalobi na bino, bato mingi bakomeka po bákotelaka wana, kasi bakokoka té.

[25] “Mokolo ezali, kolo ya ndako akotelema pe akokanga ndako na fungola, bongo bino bokozala na libanda pe bokobanda kobeta porte pe koloba: ‘Mokonzi, fungolela biso ndako.’ Kasi ye akozongisela bino: ‘Nayebi epai bino bouti té!’

[26] Bongo bino bokoloba na ye: ‘Toliaki pe tomelaki esika moko ná yo! Oteyaki na babalabala na biso!’

[27] Kasi ye akozongisela bino lisusu: ‘Nayebi epai bino bouti té! Bólongwa pembeni na ngai, bino nyonso bato bozalaki kosala mabe!’

[28] Kuna bokobanda kolela pe kolia mino, tango bokomona Abraham, Izaak ná Jakob pe baprofete nyonso bafandi na bokonzi ya Nzambe; nzokande bino, bakobwaka bino na libanda.

[29] Bato mingi bakouta na epai moi ebimaka pe na epai elalaka, na epai ya likolo pe na epai ya se, bongo bakoya kozwa esika na feti oyo Nzambe akosalisa kuna na bokonzi na ye.

[30] Ya solo, bato mosusu oyo bazali sik'oyo bato ya suka, bakokóma bato ya liboso; pe bato mosusu oyo bazali sik'oyo bato ya liboso, bakokóma bato ya suka.”

[31] Kaka na tango wana ba-Farizé mosusu bayei penepene ya Yezu, balobi na ye: “Ebongi malamu ólongwa awa pe ókende epai mosusu, pamba té Erode alingi kobomisa yo.”

[32] Yezu azongiseli bango: “Bókende koloba na mboloko wana 'tè nazali kobengana milimo mabe pe kobikisa bato ya maladi. Nakosala bongo tii tango nakosilisa mosala na ngai.

[33] Kasi ebongi nálanda mobembo na ngai lelo, lobi pe lobi oyo ekoya. Pamba té esengeli báboma profete kaka na Yeruzalem, kasi epai mosusu té.

[34] “A bino bato ya Yeruzalem! Tango Nzambe atindelaka bino baprofete, boboyaka bango pe bobomaka bango na mabanga. Nzokande ngai, mbala na mbala namekaki kosangisa bino pembeni na ngai, ndenge soso esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi bino boboyaki!

[35] Yango wana Nzambe akosundola mboka na bino. Nalobi na bino, bokomona ngai lisusu té tii tango bokoloba: ‘Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye!’”

Luka — Chapters