Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 9:31

[1] Mokolo moko Yezu azalaki kosambela. Tango asilisi, moyekoli moko alobi na ye: “Mokonzi, lakisa biso kosambela, ndenge Yoane Mobatisi alakisaki bayekoli na ye.”

[2] Yezu alobi na bango: “Tango bozali kosambela, bólobaka boye: Tata, kombo na yo ézala na lokumu; bokonzi na yo éya;

[3] pesaka biso mokolo na mokolo bilei oyo ekoki;

[4] limbisa masumu na biso, po biso pe tolimbisi mabe nyonso basali biso; pe kotika Monguna ámeka biso té.”

[5] Yezu alobi na bango lisusu: “Tózwa ndakisa ya moto moko oyo azali na moninga na ye, bongo na midi ya butu akei kosenga ye: ‘Moninga, defisa ngai mapa misato;

[6] pamba té moninga moko auti na mobembo ayeeli ngai, kasi nazali na eloko ya kopesa ye té.’

[7] Bongo moto oyo azali na kati ya ndako azongiseli ye: ‘Tika ngai nyee; ndako esi'ekangami, pe ngai ná bana tosi'tolali. Nakoki kotelema té po na koya kopesa yo mapa.’

[8] Nalobi na bino: ata soki alingi kotelema té pe kopesa ye yango po azali moninga na ye, akotelema kaka po na molende na ye, pe akopesa ye nyonso ye azali na yango posa.

[9] Bongo ngai nalobi na bino: bósenga, pe bokozwa; bóluka, pe bokomona; bóbeta porte, bongo bakofungolela bino.

[10] Pamba té moto nyonso oyo asengaka, azwaka; moto nyonso oyo alukaka, amonaka; pe moto nyonso oyo abetaka porte, bafungolelaka ye.

[11] Tata nani na kati na bino akoki kopesa nyoka na Mwana na ye, soki asengi ye mbisi?

[12] To akopesa ye skorpion, soki asengi ye liki?

[13] Soki bino bato ya mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, tembe té Tata ya Likolo pe akopesa Molimo Mosantu na baoyo basengi ye.”

[14] Mokolo moko Yezu azalaki kobengana molimo mabe oyo ekómisaki moto moko baba. Tango molimo mabe ebimi, baba wana abandi koloba. Bato bakamwe penza.

[15] Kasi bato mosusu balobi: “Ezali Beelzebul, mokonzi ya milimo mabe moto apesi ye nguya ya kobengana milimo mabe.”

[16] Bato mosusu balingaki komeka ye, bongo basengi ye ásalela bango elembo moko oyo ekomonisa 'tè nguya na ye euti na Nzambe.

[17] Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, bongo alobi na bango: “Soki bato ya bokonzi moko bakabwani bango na bango, bokonzi na bango ekokufa, pe bandako na bango ekobukana.

[18] Bongo soki Satan azali kobundisa bato na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekoumela? Pamba té bino bolobi 'tè Beelzebul moto apesi ngai nguya ya kobengana milimo mabe.

[19] Kasi soki ezali boye, nani moto apesaka bato na bino nguya ya kobengana yango? Bato na bino bango moko nde bazali kokweisa bino.

[20] Kasi ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Nzambe; elakisi 'tè bokonzi ya Nzambe esi'eyeeli bino.

[21] “Tango elombe azali na bibundeli pe azali kokengela ndako na ye, biloko na ye nyonso ebombami malamu.

[22] Kasi soki moto oyo aleki ye na makasi ayei pe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, bongo akokabola biloko na ye nyonso.

[23] “Moto oyo alandaka ngai té, azali koboya ngai; pe oyo asalisaka ngai té po na kosangisa bato, azali kopanza bango.”

[24] “Soki molimo mabe etiki nzoto ya moto, ekendeke kotelengana na esobe po na koluka esika ya kopema. Soki ezwi esika ya kopema té, emilobaka: ‘Nakozongela moto oyo natikaki; ye azali lokola ndako na ngai.’

[25] Kasi tango molimo ezongelaka moto yango, ekutaka ye akómi lokola ndako oyo bakombi pe babongisi malamu.

[26] Bongo ekendeke kozwa milimo sambo mosusu oyo eleki yango na mabe, pe yango nyonso eyaka nzela moko kofanda na nzoto ya moto wana. Boye suka na ye ekómaka mabe mingi koleka ya liboso.”

[27] Awa Yezu asilisi koloba boye, mwasi moko azalaki na kati ya bato wana alobi: “Esengo mingi na mama oyo amemaki zemi na yo pe amelisaki yo mabéle!”

[28] Bongo Yezu azongisi: “Ee, kasi esengo ekoleka mingi na bato oyo bayokaka maloba ya Nzambe pe batosaka yango!”

[29] Tango bato mingi bayei kotondana penepene ya Yezu, ye abandi koloba: “Bato ya tango oyo bazali bato mabe! Bazali kosenga elembo, kasi Nzambe akolakisa bango kaka elembo moko: oyo ya Jonas.

[30] Pamba té Jonas azalaki lokola elembo po na bato ya Ninive, ndenge moko pe Mwana ya Moto azali elembo po na bato ya tango oyo.

[31] Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, mokonzi-mwasi ya mboka Saba akoya kofunda bato ya tango oyo, po ye alongwaki mosika po na koya koyoka maloba ya mayele ya Salomon. Kasi oyo azali awa aleki Salomon.

[32] Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, bato ya Ninive bakoya kofunda bino bato ya tango oyo, po bango babongolaki mitema tango bayokaki mateya ya Jonas. Kasi oyo azali awa, aleki Jonas.”

[33] “Moto moko té apelisaka mwinda pe abombaka yango na sanduku to na se ya katini, kasi batiaka yango likolo ya mesa, po bato oyo bazali kokota na ndako bámona malamu.

[34] Miso na yo ezali lokola mwinda; yango moto emonisaka yo. Soki miso na yo ezali malamu, okomona polele penza; kasi soki ezali mabe, okozala na molili.

[35] Yango wana, keba 'tè mwinda oyo ezali na motema na yo ékóma molili té.

[36] Boye soki ozali komona polele penza pe soki molili moko té ezali na kati na yo, ezali lokola nde mwinda ya makasi engengisi yo.”

[37] Tango Yezu asilisi koloba, Farizé moko abengi ye po ákende kolia na ndako na ye. Yezu akoti pe afandi na mesa.

[38] Farizé wana akamwe tango amoni 'tè Yezu asukolaki maboko té liboso ya kolia, ndenge mibeko ezalaki kotinda.

[39] Bongo Mokonzi alobi na ye: “Bino ba-Farizé bosukolaka libanda ya bakopo pe ya basani, kasi na kati ya mitema botondá na posa ya moyibi pe ya mobulu.

[40] Bino bozangá mayele! Nzambe moto asalá biloko oyo emonanaka; ezali ye pe té moto asalá motema ya moto?

[41] Kasi bópesa na bato bakelelá biloko oyo ezali na bakopo pe na basani na bino, boye biloko nyonso bosalelaka, ekokóma peto.

[42] “Mawa na bino ba-Farizé! Pamba té bolongolelaka Nzambe eteni moko na kati ya biteni zomi ya mwa-makasa ya sòlo kitoko, pe ya bandunda nyonso ya mike-mike. Kasi bobosanaka kosala bato bolamu pe kolinga Nzambe. Wana ezali makambo bosengeli kosala, nzokande kobosana pe té oyo ya liboso.

[43] “Mawa na bino ba-Farizé! Bolingaka bakiti ya liboso na ndako ya lisanga pe bolingaka bápesa bino bambote na bazando.

[44] Mawa na bino! Pamba té bozali lokola bisika bakundá bato, kasi batiá bilembo té. Bongo bato bazali kotambola likolo na yango po bayebi té.”

[45] Molakisi-Mibeko moko alobi na ye: “Moteyi, awa olobi boye, ozali pe kofinga biso.”

[46] Yezu azongisi: “Mawa na bino pe, balakisi-Mibeko! Botiaka mikumba ya kilo likolo ya bato, kasi bino moko bolingaka kosimba yango ata na mosapi té.

[47] Mawa na bino! Botòngaka bamonimá ya kitoko po na baprofete oyo bakoko na bino babomaká.

[48] Na ndenge wana bozali komonisa 'tè bondimi makambo ya bakoko na bino, pamba té bango babomaká baprofete, pe bino pe bozali kotòngela bango basimetiere.

[49] Kasi Nzambe na mayele na ye nyonso alobaká boye: ‘Nakotindela bango baprofete pe bantoma; bakoboma bamosusu na kati na bango pe bakonyokola bamosusu.’

[50] Yango wana bato ya tango oyo bakozwa etumbu po na makila ya baprofete nyonso oyo babomaká uta na ebandeli ya mokili,

[51] kobanda Abel tii na Zakarya oyo babomaká na kati ya mesa bazikiselaka Nzambe mabonza ná Ndako ya bosantu. Ya solo, nalobi na bino, bato ya tango oyo bakozwa etumbu po na makila na bango.

[52] “Mawa na bino balakisi-Mibeko! Pamba té bolongolá fungola ya ndako oyo bato bakoki kozwela mayele; bino moko bokoti té, pe bozali kopekisa baoyo balingi kokota.”

[53] Tango Yezu alongwe na ndako wana, balakisi-Mibeko ná ba-Farizé babandi kotungisa ye na kanda nyonso, pe kotunatuna ye makambo ya ndenge na ndenge;

[54] bazalaki komeka ye po bákweisa ye soki alobi likambo moko ya mabe.

Luka — Chapters