Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:41

[1] Sima ya makambo wana Nkolo aponi lisusu bato tuku sambo na mibale (72), pe atindi bango mibale mibale na bavile pe bamboka nyonso ye moko alingaki kokende.

[2] Alobi na bango: “Bambuma ebele etondi na elanga, kasi bato ya kobuka yango bazali mingi té. Bóbondela Kolo ya elanga átinda bato ya mosala po bámemela ye bambuma.

[3] Bókende; natindi bino lokola bana-meme na kati ya bankoi.

[4] Bómema mbongo té, biloko té to pe basapatu. Bólekisa tango té na nzela po na kopesa bato mbote.

[5] Tango bokokota na ndako moko, bóloba liboso: ‘Boboto ézala na ndako oyo.’

[6] Soki kolo ya ndako yango azali moto ya boboto, akozwa bolamu po na mbote oyo bopesi ye; soki bongo té, akozwa eloko té.

[7] Bófanda na ndako wana, bólia pe bómela biloko bakopesa bino, pamba té mosali asengeli kozwa lifuta na ye. Bókota bikotela té na bandako nyonso.

[8] Tango bokokota na mboka moko, soki bayambi bino, bólia bilei oyo bakopesa bino;

[9] bóbikisa bato ya maladi pe bóloba boye na bato ya mboka wana: ‘Nzambe alingi kotia bokonzi na ye epai na bino.’

[10] Kasi tango bokokota na mboka moko, soki bayambi bino té, bóbima na balabala pe bóloba boye:

[11] ‘Ata pusiere ya mboka na bino oyo ekangamaki na makolo na biso, topupoli yango po na kotikela bino. Kasi bóyeba 'tè Nzambe alingi kotia bokonzi na ye!’

[12] Nalobi na bino, mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, etumbu ya mboka wana ekoleka oyo ya Sodome!”

[13] “Mawa na yo, vile ya Korazine! Mawa na yo, vile ya Betsaida! Pamba té soki makamwisi oyo nasalaki epai na bino ésalamaka na Tir pe Sidon, mbele bato ya kuna balingaki kolata basaki pe kopakola potopoto, po na kolakisa 'tè babongoli mitema!

[14] Yango wana, mokolo Nzambe akosambisa bato, etumbu na bino ekoleka ya Tir ná ya Sidon.

[15] Pe yo Kafarnaum, okanisi 'tè okomata tii na Likolo? Té, okokita tii na mboka ya bato bakufá.”

[16] Yezu alobi lisusu na bayekoli na ye: “Moto oyo ayokeli bino, ayokeli ngai; moto aboyi bino, aboyi ngai; bongo moto aboyi ngai, aboyi Moto oyo atindi ngai.”

[17] Bayekoli tuku sambo na mibale (72) bayei kozonga pe bazalaki na esengo mingi, balobi: “Mokonzi, ata milimo mabe ezali kotosa biso po na kombo na yo!”

[18] Yezu azongiseli bango: “Namoni Satan alongwe na Likolo, akwei na se lokola kake.

[19] Bóyoka! Napesaki bino nguya ya konyata banyoka ná baskorpion, pe kosilisa makasi nyonso ya Monguna. Eloko moko té ekoki kosala bino mabe.

[20] Bótika kosepela po milimo mabe ezali kotosa bino, kasi bósepela po Nzambe asi'akòmi bakombo na bino na mokanda ya bato na ye na Likolo.”

[21] Kaka na tango wana Molimo Mosantu ayokisi Yezu esengo mingi, bongo alobi: “E Tata, Nkolo ya Likolo ná se, napesi yo mersi po obombi makambo oyo na bato ya mayele pe na bato bayekolá, kasi olakisi yango na bato pamba. Ya solo Tata, olingaki ésalama bobele ndenge wana.

[22] “Tata na ngai apesi makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko té ayebi soki Mwana azali nani; kaka Tata moto ayebi. Pe moto moko té ayebi soki Tata azali nani; kaka Mwana moto ayebi, ná baoyo Mwana alingi kolakisa bango Tata.”

[23] Bongo Yezu abaluki epai ya bayekoli na ye pe alobi kaka na bango: “Esengo mingi na bino po bozali komona makambo oyo!

[24] Pamba té nalobi na bino, baprofete mingi ná bakonzi bazalaká na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango té. Bazalaká na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango té.”

[25] Molakisi-Mibeko moko ayei po na komeka Yezu, bongo atuni ye: “Moteyi, násala nini po názwa bomoi ya seko?”

[26] Yezu azongiseli ye: “Bakòmá nini na Mibeko? Makambo nini otangaka kuna?”

[27] Moto wana azongisi: “Linga Nkolo Nzambe na yo, na motema moko, na bomoi na yo mobimba, na makasi nyonso pe na mayele nyonso; pe lisusu: Linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko.”

[28] Bongo Yezu alobi na ye: “Ozongisi malamu! Sala bongo pe okobika.”

[29] Kasi molakisi-Mibeko alingaki komilongisa, atuni Yezu: “Moninga na ngai nani?”

[30] Bongo Yezu abandi kobetela ye lisapo oyo: “Moto moko alongwaki na Yeruzalem po na kokende na Jerikó. Bamiyibi bakangi ye, balongoli ye bilamba, babeti ye pe batiki ye lokola moto akufi.

[31] Sima ya mwa-tango nganga-Nzambe moko ayei koleka na nzela yango; awa amoni ye, akatisi na mopanzi mosusu ya nzela.

[32] Mosali moko ya Ndako ya Nzambe, moto ya libota ya Levi asali se ndenge moko; akómi na esika wana, amoni ye, akatisi na mopanzi mosusu ya nzela.

[33] Kasi moto moko ya Samarie ayei pe koleka na nzela wana; tango amoni ye, ayokeli ye mawa.

[34] Apusani pembeni na ye, bongo atie ye mafuta ná vinu na bapota, pe akangi yango. Na sima amatisi ye na punda na ye moko, amemi ye na ndako bato ya mobembo balalaka, pe kuna abandi kosalisa ye.

[35] Tongo etani, abimisi mbongo mibale ya bibende, apesi yango na kolo ya ndako, pe alobi na ye: ‘Salisa moto oyo malamu. Soki obimisi mbongo mosusu po na kosalisa ye, ngai moko nakofuta yango, tango nakoleka lisusu awa.’”

[36] Bongo Yezu atuni molakisi-Mibeko: “Okanisi nini? Na kati ya bato misato wana, nani amilakisi moninga ya moto oyo bamiyibi babetaki?”

[37] Molakisi-Mibeko azongisi: “Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa.” Bongo Yezu alobi na ye: “Kende, yo pe sala bongo.”

[38] Tango Yezu ná bayekoli na ye bazalaki na nzela, akoti na mboka moko. Kuna mwasi moko, kombo na ye Marte, ayambi ye na ndako na ye.

[39] Ye azalaki na ndeko na ye ya mwasi, kombo na ye Maria. Bongo Maria akei kofanda penepene ya makolo ya Yezu pe azalaki kaka koyoka ye.

[40] Nzokande Marte azalaki komitungisa mingi na kolamba. Na mbala moko ayei pe alobi: “Mokonzi, ozali komona mabe té ndenge ndeko na ngai atikeli ngai misala nyonso? Loba na ye ásalisa ngai.”

[41] Mokonzi azongiseli ye: “Marte, Marte! Ozali komitungisa pe komona pasi po na makambo mingi.

[42] Kasi likambo moko kaka ezali na tina monene. Maria aponi likambo ya malamu, pe bakobotola ye yango té.”

Luka — Chapters