Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:34

[1] Na pokwa, sima ya Mokolo ya Kopema, Maria ya Magdala ná ndoi na ye Maria, mama na Jake, pe Salomé, basombi malasi po bákende kopakola na ebembe ya Yezu.

[2] Bongo na tongo-tongo, tango moi ebandi kobima, bakei na simetiere.

[3] Bazalaki kolobana: “Nani akolongolela biso libanga bazipelaki libulu?”

[4] Kasi bátala boye, bamoni 'tè libanga esi'elongwaki, nzokande ezalaki monene penza.

[5] Bakoti na kati ya libulu, bamoni elenge mobali moko afandi na liboko ya mobali, alati nzambala ya pembe. Bayokaki somo penza!

[6] Kasi ye alobi na bango: “Bókamwa té! Bozali koluka Yezu ya Nazaret oyo babomaki na kuruze; asekwi, azali awa té! Bótala esika batiaki ye.

[7] Bongo bókende koyebisa Piere ná bayekoli mosusu 'tè Yezu akei liboso na bino na Galilé; bokomona ye kuna, ndenge ayebisaki bino.”

[8] Balongwe noki na simetiere, bakimi po bazalaki kolenga na somo. Balobi likambo yango ata na moto moko té, po bazalaki kobanga.

[9] [Yezu asekwi na tongo-tongo, sima ya Mokolo ya Kopema. Abimeli liboso Maria ya Magdala, oyo ye abenganaki milimo sambo ya mabe.

[10] Maria akei koyebisa sango na bayekoli ya Yezu; akuti bango bazalaki kolela pe batondaki na mawa.

[11] Kasi tango bayoki 'tè Yezu azali na bomoi pe Maria amonaki ye, baboyi kondima.

[12] Sima na yango, Yezu abimeli bayekoli mibale bazalaki kokende na esobe; amonanaki lokola moto mosusu.

[13] Bayekoli wana bazongi pe bayebisi baninga na bango; kasi ata bongo, bandimelaki bango té.

[14] Sima ya mwa-tango moke, Yezu amonani pe na bayekoli zomi na moko tango bazalaki kolia. Asilikeli bango po baboyi kondima pe bazalaki kaka kotia tembe; baboyaki kutu kondimela baninga na bango oyo bamonaki ye penza na miso 'tè asekwi.

[15] Bongo alobi na bango: “Bókende kosakola Sango Malamu na mokili mobimba epai ya bato nyonso.

[16] Moto oyo akondimela ngai pe akozwa batisimo, akobika. Kasi oyo akondimela ngai té, akozwa etumbu.

[17] Bongo bato bakondima bakobanda kosala makamwisi oyo: bakobimisa milimo mabe na kombo na ngai; bakoloba minoko ya sika;

[18] soki basimbi banyoka na maboko to bameli pwazon, bakoyoka pasi ata moke té; bakotiela bato oyo bazali na maladi maboko, pe bango bakobika.”

[19] Tango Nkolo Yezu asilisi koloba makambo wana, atombwani na Likolo, pe akei kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe.

[20] Bayekoli pe bakei kosakola Sango Malamu bipai nyonso. Nkolo abandaki kosalisa bango, azalaki kosala makamwisi mingi po na kopesa nguya na maloba na ye.]

Marko — Chapters