Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:08

[1] Na mokanda oyo ékòmamá basekelé oyo Nzambe alakisaki Yezu Kristo, po áyebisa basali na ye makambo oyo esengeli koya na mwa-mikolo. Kristo atindaki anjelu na ye epai na ngai Yoane, mosali na ye, po áya kolakisa ngai yango nyonso.

[2] Bongo nazali koyebisa maloba ya Nzambe pe makambo nyonso oyo Yezu Kristo alakisaki ngai lokola na ndoto.

[3] Esengo na moto azali kotangela bato maloba oyo euti na Molimo Mosantu; esengo na baoyo bazali koyoka yango pe kondima nyonso oyo ekòmamá awa. Pamba té tango esi'ekómi penepene.

[4] Ngai Yoane, natindi mbote na ba-Eklezya sambo ya rejion ya Azie. Bózwa bolamu pe boboto euti na Nzambe, oyo azali, azalaká, pe akoya; euti pe na milimo sambo oyo ezali liboso ya Kiti na ye ya bokonzi;

[5] euti lisusu na Yezu Kristo oyo ayebisi biso makambo amoná epai ya Nzambe; azali Mwana na ye ya liboso, na ndenge asekwaki liboso ya bato nyonso oyo bakufá; azali Mokonzi ya bakonzi ya mokili. Ye alingaka biso; na makila na ye alongoli biso na boumbu ya masumu;

[6] akómisi biso ekolo ya bakonzi, banganga-Nzambe oyo basalelaka Nzambe, Tata na ye. Lokumu pe nguya ézala na Yezu Kristo seko! Amen.

[7] Ye wana azali koya na kati ya mapata. Bato nyonso bakomona ye, ata baoyo batobolaki ye mopanzi. Bato ya bikolo nyonso awa na se bakolela pe bakobanga ye. Ya solo, ekozala bongo!

[8] Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, oyo azali, azalaká, pe akoya, alobi boye: “Ngai nazali Ebandeli pe Suka.”

[9] Ngai ndeko na bino Yoane; na lisanga na Yezu, biso nyonso tozali komona pasi, tosi'tozwi bokonzi, pe tozali kokanga mitema ndenge moko. Bakangaki ngai pe batindi ngai na esanga Patmos, po nazalaki koteya maloba ya Nzambe oyo Yezu Kristo ayeelá bato.

[10] Na Mokolo ya Nkolo, Molimo akotelaki ngai, bongo nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi ezali koyokana lokola kelelo, elobi:

[11] “Makambo ozali komona, kòma yango na mokanda pe tinda yango na ba-Eklezya oyo sambo: Efeze, Simirne, Pergame, Tiatire, Sarde, Filadelfie pe Laodisé.”

[12] Nabaluki po nátala soki nani azalaki koloba na ngai, bongo namoni bamwinda sambo ya or.

[13] Na kati na yango namoni lokola moto moko atelemi, alati nzambala ná mokaba moko ya or na tolo.

[14] Suki na ye ezalaki pembe makasi penza, pe miso na ye ezalaki kongenga lokola móto.

[15] Makolo na ye ezalaki kongenga lokola nde basalá yango na ebende ya talo oyo bakómisá peto na móto. Pe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bambonge ya ebale monene.

[16] Na liboko na ye ya mobali asimbaki minzoto sambo, na monoko na ye mbeli moko ya mino mibale ezalaki kobima. Elongi na ye ezalaki kongenga lokola moi ya midi.

[17] Tango namoni ye, nakwei na makolo na ye lokola moto akufi. Atieli ngai liboko na ye ya mobali pe alobi: “Kobanga té! Nazali moto ya liboso pe ya suka;

[18] nazali Moto ya bomoi. Nakufaki, kasi sik'oyo nazali na bomoi ya seko. Liwa pe mboka ya bato bakufá ezali na maboko na ngai.

[19] Bongo, kòma makambo nyonso yo omoni: oyo ezali koleka sik'oyo pe oyo esengeli koya.

[20] Omoni 'tè nasimbi minzoto sambo na liboko na ngai ya mobali; omoni pe bamwinda sambo ya or; sekelé na yango ezali boye: minzoto wana sambo elakisi ba-anjelu ya ba-Eklezya sambo; bamwinda sambo ya or elakisi ba-Eklezya wana sambo.”

Koyebisa Basekelé — Chapters