[1] Bongo anjelu ya mitano abeti kelelo. Namoni monzoto moko euti na Likolo, eyei kokweya na mokili. Bapesi monzoto wana fungola ya libulu oyo bakangá milimo mabe.
[2] Monzoto efungoli libulu yango; milinga ebimi na kati, ezali lokola oyo ebimaka na fulu ya monene, bongo moi pe likolo eyindi po na milinga wana.
[3] Mankonko ebimi na milinga pe epanzani na mokili. Bapesi mankonko yango nguya lokola ya baskorpion.
[4] Bapekisi mankonko 'tè ésala mabe té na matiti to na banzete, ézala ya minene to ya mike; kasi ésala mabe bobele na bato oyo bazangi kashé ya Nzambe na bilongi.
[5] Bapesi yango nzela ya koboma bato té, kasi bobele ya konyokola bango sanza mitano mobimba. Pasi oyo mankonko ekobanda komonisa bato ezali lokola oyo moto amonaka soki skorpion eswi ye.
[6] Na kati ya sanza mitano wana bato bakoluka liwa, kasi bakozwa yango té; bakolinga kokufa, kasi liwa ekokima bango.
[7] Mankonko yango ezali lokola bapunda oyo babongisi po na bitumba: na mitú ezali na biloko lokola bikoti ya or; bilongi na yango ekokani ná oyo ya bato;
[8] ezali na suki lokola ya basi, pe mino lokola ya batambo.
[9] Mankonko yango elati bakazaka ya bibende lokola ya basoda; mapapu na yango ezali kobimisa makelele lokola ya ba-shareti ebele oyo bapunda ebendaka soki ezali kokende na etumba.
[10] Mankonko yango ezali na nguya ya konyokola bato sanza mitano mobimba, pamba té mikila na yango ezali lokola ya baskorpion, pe ezali na basende.
[11] Mokonzi na yango ezali nde anjelu oyo akengelaka libulu bakangá milimo mabe. Kombo na ye na ebré: “Abadon” pe na grek: “Apolion,” elingi koloba “Mobebisi.”
[12] Mawa ya liboso eleki; makambo mibale ya mawa mosusu ezali koya.
[13] Bongo anjelu ya motoba abeti kelelo; nayoki mongongo moko euti na basonge nyonso minei ya mesa ya or ya mabonza oyo ezali liboso ya Nzambe.
[14] Mongongo yango elobi boye na anjelu ya motoba oyo asimbi kelelo: “Fungola ba-anjelu minei oyo bakangamá penepene ya ebale ya Ufrate.”
[15] Bongo afungoli ba-anjelu minei yango, po bákende koboma bato ebele; pamba té banda kala bango bazalaki kozela bobele ngonga wana, mokolo wana, sanza wana pe mbula wana.
[16] Bayebisi ngai talo ya basoda oyo bamati bapunda po na kokende na etumba; bazali bamilion kama mibale.
[17] Namoni bango lokola na ndoto. Mitú ya bapunda ekokani ná oyo ya batambo; bapunda ezalaki kosanza móto, milinga ná fofólo. Basoda balati bakazaka ya bibende; langi na yango ezalaki lokola ya móto, ya milinga pe ya fofólo.
[18] Ndambo monene ya bato nyonso bakufi likolo ya bapasi misato oyo: móto, milinga pe fofólo oyo ezalaki kobima na minoko ya bapunda wana.
[19] Pamba té makasi ya bapunda po na konyokola bato ezali na minoko na yango; kasi ezali pe na mikila na yango, po mikila wana ezali lokola banyoka oyo eswaka bato.
[20] Nzokande bato oyo babikaki na bapasi yango babongolaki motema té, pe baboyaki misala na bango ya mabe té. Batingamaki kaka na kosambela milimo mabe pe banzambe ya bikeko oyo eyokaka té, emonaka té pe etambolaka té, oyo esalamá na or, na arjan, na bronze, na mabanga, to pe na banzete.
[21] Bato yango babongolaki motema té pe bayokaki mawa té po na ndenge bazalaká koboma bato, kosala kindumba pe koyiba; batikaki pe makambo na bango ya kindoki té.