[1] Mbote na bino bato Nzambe aponá na bolingo nyonso, pe Yezu Kristo abatelaka. Nzambe áyokela bino mawa; átondisa bino na boboto pe na bolingo. Ngai Yuda, mosali ya Yezu Kristo pe ndeko ya Jake moto natindeli bino mokanda oyo.
[3] Bandeko ya bolingo, lokola biso nyonso tozali kotia mitema 'tè Nzambe akobikisa biso, banda kala nazalaka na posa ya kokòmela bino mokanda. Namoni 'tè esengeli násala bongo po nálendisa bino, na tina 'tè bóbunda likolo ya bondimi, pamba té makambo balakisá bato ya Nzambe ekoki kobongwana té.
[4] Nzokande bato mosusu ya mabe basi'bakoteli bino; bazali kobebisa bolamu ya Nzambe na biso; bazali kokanisa 'tè yango epesaka bango nzela ya kosala kindumba. Baboyaka Yezu Kristo, oyo azali Mokonzi se moko pe Nkolo na biso. Banda kala etangamá 'tè bakozwa etumbu.
[5] Nalingi náyebisa bino lisusu makambo oyo bosi'boyebá; tango Nkolo alongolaká bato ya Israel na boumbu ya Ejipte, na sima abomaká baoyo baboyaki kondimela ye.
[6] Na kati ya ba-anjelu, bamosusu babebisaká lokumu na bango pe batikaká bisika oyo Nzambe apesaki bango. Bongo Nzambe akangisá bango seko na minyololo pe azali kobomba bango na esika moko ya molili, tii na mokolo monene oyo akokata makambo ya bikelamo na ye nyonso.
[7] Bókanisa pe Sodome ná Gomore, pe bavile ya pembeni. Bato ya kuna basalaká makambo ya soni, na ndenge balukaki koyebana nzoto basi na basi, mibali na mibali. Bongo bamboka yango ekómá ndakisa po na biso; ezwaká etumbu ya móto oyo esilaka té.
[8] Bato oyo bakoteli bino basalaka makambo ya liboma ya ndenge wana. Babebisaka nzoto na bango na kindumba, baboyaka bokonzi ya Nkolo, pe batsiolaka milimo ya Likolo.
[9] Nzokande Mishel, mokonzi ya ba-anjelu, asalaká boye té. Tango bazalaká kotiana tembe ná zabolo pe kowela ebembe ya Moize, amekaki kotsiola zabolo té, kasi alobaki na ye boye: “Nkolo ye moko ápesa yo etumbu!”
[10] Bato yango batsiolaka makambo oyo bayebi té. Bakokani ná banyama oyo ezangá mayele; bayebaka bobele baposa na bango ya nzoto; yango pe moto ekobungisa bango libela.
[11] Mawa na bango, na ndenge balandi nzela ya Kaina. Bakómi lokuta likolo ya lokoso ya mbongo lokola Balaam; pe basi'babebi po bazali kotomboka lokola Kore.
[12] Ezali bango nde bato babebisaka bafeti na bino ya bolingo, tango bosanganaka po na kolia ná bandeko; basilá soni na ndenge badundaka biloko. Bakokani ná mapata oyo ekitisaka mbula té po mopepe ezali komema yango; bazali lokola banzete oyo ebotaka mbuma té ata eleko na yango ekoki; to lokola banzete oyo basi'bapikolá po ekufá libela.
[13] Bakokani ná mbonge ya makasi ya ebale; babimisaka makambo ya soni ndenge mbonge ebimisaka fulufulu. Bakokani lisusu ná minzoto oyo ezali kotelengana. Nzambe asi'abombelá bango esika moko ya molili penza, po na seko.
[14] Henok, koko ya sambo na molongo ya Adamu, asakolaká boye likolo na bango: “Nkolo azali koya ná ba-anjelu na ye nkoto na nkoto.
[15] Akokata makambo ya bato nyonso; akobimisa mabe nyonso oyo bato ya mobulu basalaki, ná maloba nyonso ya lofundu oyo bato ya masumu balobaki po na kotsiola ye.”
[16] Bato wana bayimayimaka pe bamilelaka tango nyonso soki bakómi na pasi. Balandaka kaka baposa na bango moko, babimisaka maloba ya lolendo, pe balingaka bobele bato oyo bakoki kosepelisa bango.
[17] Kasi bino, bandeko ya bolingo, bókanisa nanu makambo oyo bantoma ya Nkolo na biso Yezu Kristo bayebisaki bino.
[18] Balobaki na bino boye: “Na mikolo ya suka, bato mosusu bakobanda kotsiola Nzambe, pe bakozala kolanda bobele baposa na bango ya mobulu.”
[19] Bango nde bato bakabolaka bandeko; Molimo ya Nzambe akotelá bango na mitema té, kasi balandaka makanisi na bango ya bomoto.
[20] Nzokande bino bandeko ya bolingo oyo bondimeli Nzambe, bózwa molende bobele na bondimi yango ya bosantu. Bósambelaka na nguya ya Molimo Mosantu.
[21] Bóbatela bolingo ya Nzambe na mitema, awa bozali kozela ’tè Nkolo na biso Yezu Kristo áyokela bino mawa pe ápesa bino bomoi ya seko.
[22] Bandeko oyo bazali nanu na tembe, bóyokela bango mawa;
[23] bakokani ná bato bazali kozika na móto; bóbikisa bango. Bato mosusu wana, bóyokela bango pe mawa, kasi bókeba na bango; bósimba ata bilamba na bango té, pamba té esi'ebebi po na misala na bango ya mabe.
[24] Nzambe azali na nguya ya kobatela bino po bókweya té pe bózala ata na mabe moko té. Ye nde moto akoki komema bino epai na ye, po bómona ye pe bótonda na esengo.
[25] Azali Nzambe se moko pe Mobikisi na biso, po na Nkolo na biso Yezu Kristo. Lokumu, monene, nguya pe bokonzi ézala na ye, uta na ebandeli, sik'oyo pe tii seko. Amen!