Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:01

[1] Bongo namoni anjelu moko auti na Likolo, asimbi fungola ya libulu oyo bakangá milimo mabe, ná pe monyololo moko monene.

[2] Akangi Elima, Nyoka ya Kala; yango ezali Zabolo to Satan; atie ye monyololo pe abwaki ye na libulu ya milimo mabe, bongo akangi yango na fungola pe atie yango elembo. Boye Satan akokoka lisusu kokosa bato ya bikolo nyonso té tii akokokisa mbula nkoto moko (1.000). Na sima esengeli bábimisa ye po na mwa-tango moke.

[4] Bongo namoni bakiti ya bokonzi; baoyo bafandi na yango bazwi bokonzi ya kokata makambo ya bato nyonso. Namoni pe milimo ya bato oyo babomaki po bazalaki kosalela maloba ya Nzambe oyo Yezu ayeelaki bato. Namoni lisusu bato oyo baboyaki kofukamela Nyama to ekeko na yango; bazwaki pe elembo na yango na elongi té to na maboko. Bango nyonso bazongi na bomoi, pe bazwi bokonzi esika moko na Kristo, mbula nkoto moko (1.000).

[5] Yango nde ezali kosekwa ya liboso. Nzokande bato mosusu oyo bakufá bazongi na bomoi té, tii bakokisi mbula nkoto moko (1.000).

[6] Esengo na bato oyo bakozala na molongo ya baoyo bakosekwa liboso. Bango bazali bato ya bosantu penza; liwa ya mibale ekoki kolia bango té. Bakozala banganga-Nzambe oyo bakobanda kosalela Nzambe ná Kristo; pe bakozwa bokonzi esika moko na ye, mbula nkoto moko (1.000).

[7] Soki mbula oyo nkoto moko (1.000) ekoki, bakotika Satan pe bakobimisa ye na boloko,

[8] po ákende kokosa lisusu bato ya bikolo nyonso ya mokili, ezali kolakisa Gog ná Magog. Ye akosangisa bango esika moko po na kobunda bitumba; bakozala ebele penza lokola mbuma ya zelo pembeni ya ebale.

[9] Bongo bapanzani na mokili mobimba pe bazingi basoda ya Nzambe, pe vile oyo ye alingaka. Kasi móto euti na Likolo, pe eyei koboma bango.

[10] Bongo Satan oyo azalaki kokosa bango, babwaki ye na laki ya móto pe ya fofólo, esika babwakaki Nyama pe profete ya lokuta. Kuna bakozala komona pasi butu moi, seko na seko.

[11] Bongo namoni Kiti monene ya bokonzi, ezalaki ya pembe. Namoni pe moto afandi wana; Likolo ná se ekimi na miso na ye, pe ebungi libela.

[12] Na sima namoni bato nyonso oyo bakufá, ézala bato minene to bato pamba, batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi. Babuku efungwami; bafungoli pe buku mosusu, yango ezali buku ya bomoi. Bongo babandi kosambisa bato bakufá, moto na moto ná makambo oyo ye asalaki, pamba té nyonso esi'ekòmamá na babuku wana.

[13] Ebale ezongisi bato oyo babungaki na mai; liwa pe mboka ya bato bakufá ezongisi bato na yango. Bongo basambisi bango, moto na moto ná makambo oyo ye asalaki.

[14] Liwa pe mboka ya bato bakufá, babwaki yango na laki ya móto. Laki oyo ya móto ezali nde liwa ya mibale.

[15] Pe moto nyonso oyo kombo na ye ekòmamá na buku ya bomoi té, babwaki ye na laki ya móto.

Koyebisa Basekelé — Chapters