Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:46

[1] Natali lisusu, pe namoni Mwana-Meme atelemi na ngomba ya Sion, pe bato 144.000 bazalaki na ye. Kombo ya Mwana-Meme pe ya Tata na ye ekòmamá na bilongi na bango.

[2] Nayoki mongongo euti na Likolo, ezalaki koyokana lokola makelele ya bambonge ya ebale monene pe lokola kake ya makasi; mongongo yango ezalaki lokola nde bato bazali kobeta mandanda.

[3] Bato yango batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi, ya ba-Sheriben minei pe ya Bambuta-muntu; bazalaki koyemba nzembo moko ya sika; moto moko té akoki koyeba yango, bobele bato wana 144.000 ya mokili oyo Mwana-Meme asombelaki Nzambe.

[4] Bango babebisaki nzoto na bango té na kindumba, bazali lokola bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali té; balandaka Mwana-Meme na bisika nyonso ye akendeke. Bobele bango nde bato balongwá na boumbu, na kati ya bato nyonso ya mokili; boye na miso ya Nzambe pe ya Mwana-Meme bakómi lokola mbuma ya liboso ya bilanga.

[5] Mbala moko té basi'balobá makambo ya lokuta; basalá mabe ata moko té.

[6] Bongo namoni anjelu mosusu azali kopumbwa na likolo penza. Azalaki na Sango Malamu ya seko, po ásakola yango epai ya bato bafandaka na mokili, bato ya bamboka nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso pe minoko nyonso.

[7] Azalaki koloba na mongongo makasi: “Bóbanga Nzambe pe bókumisa ye! Pamba té tango na ye ya kosambisa bato esi'ekoki. Bófukamela Nzambe oyo asalá Likolo, mokili, ebale pe bisika mai ebimelaka na mabelé!”

[8] Anjelu ya mibale alandi ye pe alobi: “Vile monene ya Babilone esi'ekwei! Esili! Yango nde moto ezalaki komelisa bato ya bikolo nyonso lotoko ya kindumba na yango!”

[9] Anjelu ya misato alandi lisusu, pe alobi na mongongo makasi: “Soki moto afukameli Nyama ná ekeko na yango, pe azwi elembo na elongi to na liboko na ye,

[10] Nzambe akomelisa ye kopo ya lotoko ya kanda na ye, oyo esanganá na mai té; boye moto yango akomona pasi na móto pe fofólo, na miso ya ba-anjelu ya bosantu pe na miso ya Mwana-Meme.

[11] Bato nyonso oyo bafukamelaki Nyama ná ekeko na yango, pe bazwaki elembo ya kombo na yango, bakopema té butu moi. Milinga ya móto oyo ezali konyokola bango ekozala komata na likolo po na seko.”

[12] Yango wana bato ya bosantu oyo batosaka mibeko ya Nzambe pe bandimelaka Yezu, basengeli kokanga mitema.

[13] Bongo nayoki mongongo moko euti na Likolo, elobi “Kòma boye: esengo na bato oyo bakufaki na lisanga na Nkolo Yezu. Molimo alobi: Ya solo, mosala na bango esili, sik'oyo bakoki kopema po na misala na bango ya makasi; pamba té bolamu oyo basalaki ezali kolanda bango.”

[14] Natali lisusu; lipata ya pembe eyei kobima, pe namoni lokola nde moto moko afandi na kiti, na likolo na yango. Alati ekoti ya or ya bokonzi, pe asimbi mbeli moko ya kolongolela bambuma na bilanga, ezalaki na mino makasi.

[15] Anjelu mosusu abimi na Ndako ya Nzambe, abeleli na mongongo makasi, alobi na moto oyo afandi na likolo ya lipata: “Salela mbeli na yo pe longola mbuma ya bilanga, pamba té tango ekoki! Mbuma ya mokili esi'eteli!”

[16] Bongo moto oyo afandi na likolo ya lipata abwaki mbeli na ye na mokili, pe balongoli mbuma na yango.

[17] Sima, namoni anjelu mosusu abimi na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Likolo; ye pe asimbi mbeli moko ya mino makasi.

[18] Bongo anjelu mosusu, oyo azali mokonzi ya móto, alongwe epai ya mesa ya mabonza, abeleli anjelu oyo asimbi mbeli ya mino makasi, alobi: “Salela mbeli na yo pe buka bambuma ya vinu oyo ezali na mokili, pamba té esi'eteli.”

[19] Anjelu wana asaleli mbeli na ye, abuki bambuma ya vinu oyo ezali na mokili, pe abwaki yango na libulu monene ya kokamola vinu, oyo Nzambe atimolaki na kanda na ye.

[20] Esika bazalaki kokamola mbuma yango ezalaki na libanda ya vile. Makila mingi ebimi na libulu wana, eyei kotonda na elanga mobimba, pe ekómi tii na minoko ya bapunda; elanga yango ezalaki ya bastade 1.600.

Koyebisa Basekelé — Chapters