Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:17

[1] Bongo moko ya ba-anjelu sambo, baoyo basimbaki basani sambo, alobi na ngai boye: “Yaka! Nakolakisa yo ndenge Nzambe akopesa etumbu na mwasi ya ndumba monene oyo afandaka penepene ya ba-ebale.

[2] Bakonzi ya mokili bazalaki kotambola na ye, pe bato ya mokili mobimba bazalaki kolangwa vinu ya kindumba na ye.”

[3] Molimo ya Nzambe akoteli ngai, pe anjelu amemi ngai na esobe. Kuna namoni mwasi moko afandi likolo ya nyama ya motane ngwaa; nzoto na yango mobimba bakòmá bakombo ya kotsiola Nzambe. Nyama yango ezalaki na mitú sambo, pe maseke zomi.

[4] Mwasi wana alati bilamba ya lokumu, ya motane ngwaa, ná biloko ya or, mabanga ya talo pe mayaka. Na liboko na ye asimbi kopo moko ya or, etondá na makambo ya kindumba na ye, ezali ya lisumá pe ya mbindo.

[5] Na elongi na ye bakòmá kombo moko ya sekelé, elingi koloba: “Vile monene ya Babilone, mama ya basi ya ndumba pe ya makambo ya mbindo ya mokili.”

[6] Pe namoni 'tè mwasi yango alangwe makila ya bato ya bosantu ná ya bato bazalaki kosakola sango ya Yezu. Nakamwe mingi penza tango namoni ye.

[7] Bongo anjelu atuni ngai: “Po na nini okamwe? Nakoyebisa yo sekelé ya mwasi wana, ná ya nyama ya mitú sambo pe maseke zomi oyo ezali komema ye.

[8] Nyama yo omonaki ezalaki na bomoi, kasi sik'oyo ezali lisusu té. Etikali moke ébima na libulu oyo bakangá milimo mabe, bongo ekobunga libela. Bato ya mokili bakokamwa, baoyo bakombo na bango ekòmamá na buku ya bomoi té uta na ebandeli ya mokili. Bakokamwa tango bakomona nyama wana, pamba té yango ezalaki na bomoi kasi ezali lisusu té; sima ekoya komonana lisusu.

[9] “Po na koyeba makambo oyo, esengeli ózala na mayele penza. Mitú wana sambo elakisi bangomba sambo esika mwasi yango afandaka; nzokande ezali kolakisa lisusu bakonzi sambo.

[10] Na kati na bango bakonzi mitano basi'bakufá, moko azali, pe mosusu ayei nanu té. Soki ayei, asengeli kotikala mwa-tango moke.

[11] Nyama oyo ezalaki na bomoi kasi ezali lisusu té, elakisi mokonzi ya mwambe; ye azali moko na kati ya bakonzi sambo, pe akokende kobunga libela.

[12] “Maseke zomi oyo omonaki elakisi bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi té; bakozwa bokonzi esika moko ná nyama wana, ngonga moko pamba.

[13] Bango nyonso zomi bazali na makanisi se moko: ya kopesa nguya pe bokonzi na bango na maboko ya nyama wana.

[14] Bakobundisa Mwana-Meme, kasi Mwana-Meme akolonga bango; pamba té ye azali Nkolo ya bankolo nyonso, pe Mokonzi ya bakonzi nyonso. Akoya kobunda, ye ná bato oyo bamipesá na ye, baoyo Nzambe abengá pe aponá.”

[15] Anjelu alobi na ngai lisusu boye: “Ba-ebale yo omonaki esika mwasi ya ndumba afandaka elakisi bato ya bamboka, mabota, pe minoko ebele.

[16] Nyama ná maseke na yango zomi oyo omonaki, ekobanda koyina mwasi wana ya ndumba. Bakonzi yango nyonso bakobotola ye bomengo oyo azali na yango, bakotika ye bolumbu, bakolia misuni na ye, pe bakozikisa ndambo na ye etikali na móto.

[17] Pamba té Nzambe atie na mitema na bango makanisi ya kosala makambo oyo ye alingi. Bakopesa bokonzi na bango na maboko ya nyama wana, tii tango Nzambe akokokisa maloba na ye.

[18] “Pe mwasi yo omonaki elakisi vile monene oyo ezali kotambwisa bakonzi nyonso ya mokili.”

Koyebisa Basekelé — Chapters