Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:30

[1] Na sima ya makambo oyo, namoni anjelu mosusu auti na Likolo. Azalaki na nguya mingi, pe lokumu na ye engengisi mokili mobimba.

[2] Agangi na mongongo makasi: “Vile monene ya Babilone esi'ekwei! Esili! Ekómi mboka ya bazabolo pe ya milimo nyonso ya bosoto; etondi na bandeke ya mbindo pe ya mabe.

[3] Pamba té mwasi wana ya ndumba amelisi bato ya bikolo nyonso lotoko ya kindumba na ye. Bakonzi ya mokili batambolaki na ye; pe lokola atondaki na bomengo, bato nyonso ya mombongo bazwaki mbongo mingi likolo na ye.”

[4] Bongo nayoki mongongo mosusu euti na Likolo pe elobi: “Bino, bato na ngai, bólongwa epai na ye, po bómema masumu na ye té pe bózwa etumbu té esika moko na ye.

[5] Pamba té masumu na ye esi'emati tii na Likolo, pe Nzambe ayei kokanisa misala na ye ya mabe.

[6] Bózongisela ye pasi nyonso oyo ye amonisaki bino. Makambo nyonso ye asalaki bino, bózongisela ye yango mbala mibale. Amelisaki bino kopo ya vinu ya bololo; bótondisela ye yango mbala mibale.

[7] Azalaki kotombola mapeka pe atondaki na bomengo; sik'oyo bótondisa ye na pasi pe mawa, pamba té azalaki koloba boye na se ya motema: ‘Nafandi awa lokola mokonzi, nakufelá mobali té pe nakolata pili ata mokolo moko té.’

[8] Yango wana bapasi oyo nyonso ekokweela ye na mokolo moko: liwa, mawa, pe nzala. Bakozikisa ye na móto, pamba té Nzambe asi'akatelá ye etumbu; ye azali Nkolo ya nguya nyonso.”

[9] Bakonzi ya mokili oyo bazalaki kotambola na ye pe bazwaki bomengo epai na ye, bakoyoka pasi pe bakolela po na ye, tango bakomona milinga ya móto oyo ezali kozikisa ye.

[10] Bakoyoka somo po na pasi oyo ekokweela ye, bongo bakotelema mosika pe bakoloba boye: “Mawa! Mawa penza na yo, Babilone, vile monene pe ya makasi! Ngonga moko ekokaki po na kopesa yo etumbu!”

[11] Bato ya mombongo ya mokili mobimba bazali komona pasi pe basali matanga po na mboka yango, pamba té ata moto moko té asombaka lisusu biloko na bango:

[12] or, arjan, mabanga ya talo pe mayaka; bilamba ya lokumu ya ndenge na ndenge; banzete nyonso ya kitoko pe ya sòlo malamu, biloko esalamá na pembe ya nzoku, na bronze to na bibende mosusu to pe na mabanga ya marbre;

[13] biloko ekómisaka bilei elengi; ndenge nyonso ya malasi; vinu, mafuta, farine, blé; bangombe, bameme, bapunda pe ba-shareti, ná pe baumbu, ézala bato oyo bakangi to baoyo babotamá baumbu.

[14] Bato ya mombongo bazali koloba boye na Babilone: “Biloko nyonso oyo ezalaki kosepelisa yo esi'elimwe epai na yo; bomengo na yo pe biloko ya kitoko nyonso ebebi; ekomonana lisusu epai na yo ata mokolo moko té.”

[15] Bato nyonso oyo bazwaki bomengo na mombongo oyo bazalaki kosala na Babilone, bakoyoka somo pe mawa po na pasi oyo ekokweela yango. Bakotelema mosika, pe bakobanda kolela boye:

[16] “Mawa! Mawa penza na vile oyo ya monene! Bato na yango bazalaká kolata bilamba ya lokumu ya ndenge nyonso; biloko ya or, mabanga ya talo pe mayaka.

[17] Bomengo wana nyonso ebebi na ngonga moko pamba!” Bakapiteni nyonso ya masuwa pe bato na bango ya mosala ná bato ya mobembo, ná baoyo nyonso babikelaka na ebale monene, batelemi mosika

[18] pe bazali kotala milinga ya móto oyo ezali kozikisa vile, babandi koganga na mingongo makasi: “Ata vile moko té ekokanaki na vile oyo ya monene!”

[19] Bongo bapakoli putulu na mitú; na mawa nyonso babandi kolela boye: “Mawa! Mawa penza na vile oyo ya monene! Bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa bandukaki mbongo po na bomengo na yango! Kasi eyei kopanzana na ngonga moko pamba!”

[20] Yo Likolo, sepela po Babilone ekufi! Bino bato ya bosantu, bantoma pe baprofete, bósepela! Pamba té Nzambe alongisi bino, na ndenge apesi yango etumbu!

[21] Bongo anjelu mosusu ya nguya atomboli libanga moko monene pe abwaki yango na ebale, alobi: “Oyo ezali ndenge bakobwaka vile monene ya Babilone; ekomonana ata moke lisusu té.

[22] Bakoyoka lisusu té epai na yo bato oyo babetaka miziki, ézala lindanda, piololo, kelelo to bayembi. Bato oyo basalaka misala ya kitoko bakomonana lisusu té epai na yo. Makelele ya konika blé, bakoyoka yango lisusu té epai na yo.

[23] Mwinda moko té ekobanda kopela lisusu epai na yo. Mingongo ya bilenge oyo bauti kobalana, bakoyoka yango lisusu té epai na yo. Bato na yo ya mombongo balekaki bato nyonso ya mokili. Yo moko ozalaki kokosa bato ya bikolo nyonso na kindoki na yo.

[24] Sik'oyo ozwi etumbu likolo ya makila ya baprofete, ya bato ya bosantu, pe ya bato nyonso oyo babomá awa na mokili.”

Koyebisa Basekelé — Chapters