[1] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Sarde boye: Yoka maloba ya Moto oyo azali na milimo sambo ya Nzambe pe minzoto sambo: “Nayebi makambo nyonso bino bosalaka; balobaka 'tè bozali na bomoi, nzokande bosi'bokufá.
[2] Bófungola miso! Botikali bobele na mwa-bondimi moke; bólendisa yango liboso 'tè ékufa libela. Pamba té misala na bino ezali malamu té na miso ya Nzambe na ngai.
[3] Yango wana bókanisa maloba oyo bozwaki pe boyokaki; bóbatela yango pe bóbongola mitema. Bókeba; soki bofungoli miso té, nakoya epai na bino lokola moyibi, pe bokoyeba ata moke té tango nini nakoya.
[4] Kasi epai na bino na Sarde, mwa-ndambo ya bato nanu babebisi bilamba na bango té. Bongo bakolata bilamba ya pembe pe bakotambola ná ngai, pamba té bazali bato ya kokoka.
[5] Ya solo, bato oyo bakolonga, bakolata bilamba ya pembe. Bakombo na bango ekolongwa na buku ya bomoi ata mokolo moko té. Na miso ya Tata na ngai pe ya ba-anjelu na ye, nakondima 'tè bazali bato na ngai.
[6] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya!”
[7] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Filadelfie boye: Yoka maloba ya Moto ya bosantu pe ya solo. Ye asimbi fungola ya David; soki afungoli porte, moto moko té akoki kokanga yango; soki akangi, moto moko té akoki kofungola yango:
[8] “Nayebi makambo nyonso bino bosalaka; ata bozali na makasi mingi té, kasi bozali kotosa maloba na ngai pe bowangani ngai té. Bongo nafungoleli bino porte oyo moto moko té akoki kokanga.
[9] Bato ya lingomba ya Satan oyo bakosaka 'tè bazali Bayuda, nakosala 'tè báya kofukama na makolo na bino; boye bakoyeba 'tè ngai nalingaka bino.
[10] Lokola bobatelaka mobeko na ngai ya kokanga motema, ngai pe nakobatela bino na tango ya pasi oyo ekokweela bato nyonso ya mokili po na komeka bango.
[11] Etikali moke náya. Bósimba makasi bomengo oyo bozali na yango po bólonga, pe moto moko té ákweisa bino.
[12] Baoyo bakolonga, nakotia bango lokola makonzi na kati ya Ndako ya Nzambe na ngai, po bátikala kuna libela. Nakokòma likolo na bango kombo ya Nzambe na ngai pe kombo ya mboka ya Nzambe na ngai; yango ezali Yeruzalem ya sika, oyo ekouta na Likolo, esika Nzambe na ngai azali. Nakokòma pe likolo na bango kombo na ngai ya sika.
[13] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya!”
[14] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Laodisé boye: Yoka maloba ya Moto oyo azali “Amen.” Ye azali Moto ya solo, ayebisi bato makambo oyo amoná epai na ye; Nzambe asalá biloko nyonso na ye:
[15] “Nayebi makambo nyonso bino bosalaka; bozali lokola mai oyo ezangá malili to móto. Nalingaki bózala malili to móto.
[16] Kasi bozali móto penza té, pe malili penza té; yango wana nalingi kosanza bino.
[17] Bino bolobaka 'tè: ‘Tozali na bomengo, tozwi biloko mingi, tozangi eloko moko té.’ Kasi boyebi té 'tè bozali penza bato ya mawa pe ya pasi; bozali kokelela, bosi'bokufá miso pe bozali bolumbu.
[18] Yango wana napesi bino toli boye: bósomba epai na ngai or oyo basukolá na móto, bongo bokozala bato ya bomengo ya solo; bósomba pe bilamba ya pembe, bólata yango po bózala bolumbu té. Bósomba pe kisi oyo bokoki kotia na miso po bómona lisusu.
[19] Ngai napesaka etumbu na bato nyonso oyo nalingaka. Bongo bótia molende pe bóbongola mitema.
[20] Ngai oyo natelemi liboso ya porte na bino pe nazali kobeta. Soki moto ayoki mongongo na ngai pe afungoli porte, nakokota na ndako na ye, bongo ngai ná ye tokolia esika moko.
[21] Baoyo bakolonga nakopesa bango nzela ya kofanda penepene na ngai na Kiti na ngai ya bokonzi, ndenge ngai nalongi pe nafandi penepene ya Tata na ngai na Kiti na ye ya bokonzi.
[22] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya!”